lin59-0628m lingomba lipengwisami, na mokili vgrdownload.branham.org/pdf/lin/lin59-0628m a deceived...

25
Lingomba Lipengwisami, Na Mokili Yesu Klisto, Mwana na Ye, pe Apésá biso biloko nyonso ofele kati na Klisto. Tozongiseli Yo matondi, Nkolo, mpo na matómba oyo tozui na nzela na Mbeka monene oyo eleki likolo, oyo Yesu apesaki mpo na biso na Ekulusu, oyo ezóngísá biso na bondeko pe na ngolu elongo na Yo, mpo tózua libondisi ya koyeba ete ekomámá: “Soki boumeli kati na Ngai, pe Maloba na Ngai kati na bino, bokoki kosenga nyonso oyo bolingi, pe ekopesamela bino.” Sikawa, tozongisi matondi mpo na yango, pe tosengi ete Ópesa biso kondima mpo tóndima yango na motema mobimba. 2 Sikawa tika ete tótia pembeni, Nkolo, misala nyonso ya lelo, mitungisi nyonso ya bomoi oyo, longwa na sinzili kino na mokengeli, mpo eloko mosusu ézala te na makanisi na biso sikawa, bobele kozela, koyoka na limemia Molimo Mosantu kolobela biso, mpo tókoka kosala likambo moko ya malamu, tóyeba Yo malamu koleka, wana tosangani elongo. Mpamba te, Nkolo, yango mpenza nde ntina toyei na mokolo ya molunge boye. Lobela biso na nzela na Liloba na Yo ya bomoi, pe tika ete Liloba ya bomoi éfanda kati na biso pe éumela kati na biso, mpo tózua lolenge pe tókóma, lokola mokili te, kasi tóbongwana na boyeisami sika ya milimo na biso, na lolenge ya Mwana na Nzambe. Oh, mitema na biso ezali kolenga ntango tokanisi, pe esengo etondi meké na bomoto na biso ya kati, koyeba ete tokoki kobengama bana mibali pe bana basi ya Nzambe. Tozali na miníti ya suka mpenza liboso na Boyei na Ye ya mibale, bikólo pe bokonzi nyonso ezali kolenga na nse ya makolo na biso, biloko nyonso ya mokili ezali kolimwa, kasi toyebi ete mokolo moko Asengeli koya mpo na komema biso na Bokonzi oyo ezangi suka, to, ekokweisama te. Pe kokanisa ete tozali sikawa ba—bato ya Bokonzi yango! E Nzambe, káta ngenga na mitema pe na matoi na biso lelo, na—na Molimo Mosantu, na kosukola na mai ya Liloba. Mpo tosengi yango na Nkombo na Ye pe mpo na nkembo na Ye. Amen. 3 Nakosepela kobanda liteya yango na ntongo ya lelo. Mpo, nalingaki kolobela likambo oyo ekesani na yango mwa moke soki tosengelaki kobondela mpo na babeli, kasi tolobaki ete bakálati ya mabondeli elingaki kokabolama na ngonga ya mwambe, kino ngonga ya mwambe na ndambo to ngonga ya libwa. Pe ngai… Billy ayaki na ndako eleki mwa miníti moke pe alobaki ete bato bazalaki mpenza te awa, boye akaboli bakálati ya mabondeli te. Boye toko…nakanisaki ete názua liteya oyo, mpo na kosembola lingomba. Pe nalingi koteya likolo na: Lingomba Lipengwisami,

Upload: dangmien

Post on 06-Feb-2018

249 views

Category:

Documents


2 download

TRANSCRIPT

Page 1: LIN59-0628M Lingomba Lipengwisami, Na Mokili VGRdownload.branham.org/pdf/LIN/LIN59-0628M A Deceived Church By Th… · Ezalinini?Ebongiseli.Yangondeesaliyango.Kokakola! 48 Pelelobalongolibatonyonsooyobateyakanaba-balabala

Lingomba Lipengwisami,

Na Mokili

Yesu Klisto, Mwana na Ye, pe Apésá biso biloko nyonsoofele kati na Klisto. Tozongiseli Yo matondi, Nkolo, mpo na

matómba oyo tozui na nzela na Mbeka monene oyo eleki likolo,oyo Yesu apesaki mpo na biso na Ekulusu, oyo ezóngísá biso nabondeko pe na ngolu elongo naYo,mpo tózua libondisi ya koyebaete ekomámá: “Soki boumeli kati na Ngai, pe Maloba na Ngaikati na bino, bokoki kosenga nyonso oyo bolingi, pe ekopesamelabino.” Sikawa, tozongisi matondi mpo na yango, pe tosengi eteÓpesa biso kondimampo tóndima yango namotemamobimba.2 Sikawa tika ete tótia pembeni, Nkolo, misala nyonso yalelo, mitungisi nyonso ya bomoi oyo, longwa na sinzili kinona mokengeli, mpo eloko mosusu ézala te na makanisi na bisosikawa, bobele kozela, koyoka na limemia Molimo Mosantukolobela biso, mpo tókoka kosala likambo moko ya malamu,tóyeba Yo malamu koleka, wana tosangani elongo. Mpamba te,Nkolo, yango mpenza nde ntina toyei na mokolo ya molungeboye. Lobela biso na nzela na Liloba na Yo ya bomoi, pe tikaete Liloba ya bomoi éfanda kati na biso pe éumela kati na biso,mpo tózua lolenge pe tókóma, lokola mokili te, kasi tóbongwanana boyeisami sika ya milimo na biso, na lolenge ya Mwana naNzambe. Oh, mitema na biso ezali kolenga ntango tokanisi, peesengo etondi meké na bomoto na biso ya kati, koyeba ete tokokikobengama bana mibali pe bana basi ya Nzambe. Tozali naminíti ya sukampenza liboso na Boyei na Ye yamibale, bikólo pebokonzi nyonso ezali kolenga na nse ya makolo na biso, bilokonyonso ya mokili ezali kolimwa, kasi toyebi ete mokolo mokoAsengeli koya mpo na komema biso na Bokonzi oyo ezangi suka,to, ekokweisama te. Pe kokanisa ete tozali sikawa ba—bato yaBokonzi yango! E Nzambe, káta ngenga na mitema pe na matoina biso lelo, na—na Molimo Mosantu, na kosukola na mai yaLiloba. Mpo tosengi yango na Nkombo na Ye pe mpo na nkembona Ye. Amen.3 Nakosepela kobanda liteya yango na ntongo ya lelo. Mpo,nalingaki kolobela likambo oyo ekesani na yangomwamoke sokitosengelaki kobondela mpo na babeli, kasi tolobaki ete bakálatiya mabondeli elingaki kokabolama na ngonga ya mwambe, kinongonga ya mwambe na ndambo to ngonga ya libwa. Pe ngai…Billy ayaki na ndako eleki mwa miníti moke pe alobaki ete batobazalaki mpenza te awa, boye akaboli bakálati ya mabondeli te.Boye toko…nakanisaki ete názua liteya oyo, mpo na kosembolalingomba. Pe nalingi koteya likolo na: Lingomba Lipengwisami,

Page 2: LIN59-0628M Lingomba Lipengwisami, Na Mokili VGRdownload.branham.org/pdf/LIN/LIN59-0628M A Deceived Church By Th… · Ezalinini?Ebongiseli.Yangondeesaliyango.Kokakola! 48 Pelelobalongolibatonyonsooyobateyakanaba-balabala

78 LILOBA LILOBAMI

Na Mokili. Nalingi kotanga eteni moko sikawa na Búku yaBasambisi, mokapo ya 16, kobanda na nzela ya 10.

PeDelila alobaki na Samson, Tala, osakani na ngai, peolobeli ngai lokuta: sikawa yebisa ngai, nabondeli yo, naesika nini bakoki kokanga yo.

Pe alobaki na ye, soki okangi ngai basinga ya sikaoyo basalela naino te, nakolemba mpenza, pe nakokómalokola bato nyonso.

Na yango, Delila azuaki basinga ya sika pe akangakiye na yango, pe alobaki na ye, Bafilistia bazali likolona yo, Samson. Nzoka bato mosusu babombanaki nachambre. Pe akataki yango lokola singa ya elamba peelongwaki na maboko na ye.

Pe Delila alobaki na Samson, Kino sikawa osakanina ngai, pe olobeli ngai lokuta: yebisa ngai na esikanini bakoki kokanga yo. Pe Samson alobaki na ye, Sokiotongí…matongí nsambo ya motó na ngai, na elamba.

Bongo, Delila akangisaki yango na mwa nzete, pealobaki na ye, Bafilistia bazali likolo na yo, Samson. Pealamukaki na mpongi, pe alongolaki mwa nzete pe mwaetongelo ná elamba.

Pe alobaki na ye, Okoki koloba ndenge nini, Nalingiyo, wana na motema na yo ezali epai na ngai te?osakani na ngai mbala misato oyo, pe oyebisi ngai…soki makasi mingi oyo ozali na yango euti wapi; peoyebisi ngai te soki makasi mingi oyo ozali na yangoeutaka wapi.

Pe esalemaki ete, lokola azalaki ntango nyonso kotiaye mbamba na maloba na ye pe kotungisa ye, molimo yaSamson etungisamaki lokola ákufa;

Pe afungolelaki ye motema, pe alobaki na ye, Razwareeleká ata mokolo moko te na motó na ngai; mpo nazaliMonaziri ya Nzambe banda na libumu ya mama na ngai:soki bakati ngai suki, makasi na ngai pe ekotika ngai, penakolemba solo pe nakokóma lokola bato mosusu.

Pe ntango Delila amonaki ete afungoleli ye motemana ye mobimba, atindaki ete bábenga mikóló yaBafilistia, alobaki, Bómata mbala oyo, mpo afungolelingai motema na ye mobimba. Pe mikóló ya Bafilistiabamataki epai na ye, balukaki mbongo, to bayaki nambongo na loboko na ye.

Pe alalisaki Samson mpongi na mabolongo na ye;pe abengaki mobali moko, mobali yango akataki yematongí nsambo ya suki na ye; pe…abandi kotungisaye, pe makasi na ye etikaki ye.

Page 3: LIN59-0628M Lingomba Lipengwisami, Na Mokili VGRdownload.branham.org/pdf/LIN/LIN59-0628M A Deceived Church By Th… · Ezalinini?Ebongiseli.Yangondeesaliyango.Kokakola! 48 Pelelobalongolibatonyonsooyobateyakanaba-balabala

LINGOMBA LIPENGWISAMI, NA MOKILI 79

Pe alobaki, Bafilistia bazali likolo na yo, Samson. Pealamukaki na mpongi, pe alobaki, nakobima lokola nambala ya liboso, pe nakomilongola. Kasi ayebaki te eteYAWEH autaki kotika ye.

4 Sikawa nalingi kotanga,mpo namotó ya liteya oyo, ekomámina Búku ya Emoniseli, mokapo ya 2, kobanda na nzela ya 21kino 23.

Pe napesaki ye ntangompo ábongolamotema ete átikapité na ye; kasi abongolaki motema te.Tala, nakobwaka ye nambeto, pe baoyo basalaka na ye

ekobo, kati naminyokomonene, soki babongoli mitemate ete bátika misala na ye.Pe nakoboma bana na ye na liwa; pe mangomba

nyonso ekoyeba ete ngai natalaka makanisi ya mitema:pe nakopesa bino moto na moto na kolanda misala nabino.Nkolo ábakisamapamboli na Ye na litangi yaLiloba naYe.

5 Samson, lokola lingomba mpenza, abandaki malamu.Abandaki na nzela malamu. Abandaki, pe babengaki ye elombena nguya. Ntango abandaki, azalaki kosalela Yawe, kotosaMaloba na Ye pe kokokisa Mibeko na Ye. Pe ezalaki mwamoke lokola lingomba. Ebandaki, tóloba, na elobeli ya mokili,ebandaki na lokolo ya malamu. Ebandaki na kotosa Mibeko yaYawe. Pe na ntango nyonso oyo Samson azalaki kolanda Yawe,Yawe azalaki pe kosalela Samson.6 Mpamba te, Nzambe akoki kobatela moto nyonso pe kosalelamoto nyonso oyo akolanda Ye, mpo ezali likambo ya Nzambe.Kasi soki tozui nzela mosusu, mosika na makambo ya Nzambe,Nzambe akoki lisusu kosalela biso te. Soki totosi mpenzaMibeko ya Nzambe, soki totikali na kati na nkasa ya Biblepe tokumbameli na Liloba likomami, soki tokumbameli Ye naMolimo pe na Solo ya Liloba, Nzambe akoki kosalela motonyonso. Kasi soki moto azui likanisi ya kozua nzela mosusu mpona kolanda eloko mosusu, Nzambe akoki lisusu kosalela motoyango te.7 Boye, Samson azali e—etaliseli monene ya lingomba ya lelo.Ntango lingomba ebandaki, Nzambe akokaki kosalela lingomba,mpo lingomba ezalaki kotosa Mibeko ya Nkolo na bokebinyonso, ezalaki kotosa Malako na Ye pe Mitindo na Ye nyonso,pe kosalela Mibeko na Ye nyonso. Pe Nzambe azalaki elongona lingomba. Kasi emonani lokola bolembu moko ezali kati nalingomba.8 Bobosana te, tozali na piknik te, kasi tozali na esikaya etumba. Bato mingi bakanisaka ete kaka ntango bakómiBaklisto, basali nyonso oyo basengelaki kosala, ekoki mpona libela, lokola bakómi Baklisto, makambo nyonso ekokóma

Page 4: LIN59-0628M Lingomba Lipengwisami, Na Mokili VGRdownload.branham.org/pdf/LIN/LIN59-0628M A Deceived Church By Th… · Ezalinini?Ebongiseli.Yangondeesaliyango.Kokakola! 48 Pelelobalongolibatonyonsooyobateyakanaba-balabala

80 LILOBA LILOBAMI

pete. Bókanisaka ndenge wana te. Mpo, ngai nakómá Moklistompo nábunda, kobunda etumba malamu ya kondima. NakómaMoklisto, mpo nákota na milongo ya etumba. Tozali basodáBaklisto, tosengeli koyekola pe kobókolama, pe koyeba mayelenyonso ya monguna, mpo na koyeba komibatela, mpo na koyebako—kobunda etumba. Pe tokoki kosala yango bobele ndengeMolimo Mosantu azali komonisela biso yango. Tokoki kozua teoyo ekólo mosusu bayebisaka biso ntango tokendaka etumba,ndambo na makanisi na bango. Kasi tosengeli kozua makanisioyo ya biso moko, ndenge Molimo Mosantu akokamba biso, pemakanisi oyo Ye akopesa biso, mpo Ye nde Mokonzi ya Basodáya mampinga ya Baklisto.9 Samson asalaki malamu, azalaki moto monene kino ntangoabandaki, abandaki lokola (tokoki kobenga yango) kotambolalokola moto mabe, kino akómaki kobima libanda na mabelé naye. Lingomba pe etambolaki malamu, pe ezalaki malamu kinontango babandaki kobima libanda na mabelé na bango. Samsonakómaki kolanda basi. Pe azalaki kolanda bana basi ya Yisalaelete, akómaki nde kolanda bana basi ya Bafilistia.10 Pe ekokani mwa moke na oyo lingomba esalaki. Ebandakite kolinga baoyo ya ye moko, ekómaki kolanda bazangikondima pe ebandaki kolinga bazangi kondima. Wana ndeesika tosalaki libunga, moko na mabunga minene koleka, ezalintango lingomba ebandaki kosala makambo oyo ezali malamute. Ebandaki kotambola, lokola Samson, ná baninga yamabe.11 Samson, na ntango nyonso oyo azalaki elongo na batona Yawe, atambolaki malamu. Kasi ntango akómaki kolandabaninga yamabe, na ntango yango nde azuakimindondo.12 Ezali pe bongo ná lingomba. Ntango lingomba ezalakikolanda na limemia pemokolo namokolo bokambami yaMolimoMosantu, Nzambe azalaki kopambola bango, bikamwa, bilembope makambo minene ezalaki kolanda lingomba. Kasi ntangoebandaki kolanda baninga ya mabe, elongo na mokili! Moko namakambo mabe koleka oyo esalaki, pe likambo ya liboso oyoyango esalaki, ebandaki kokóma ebongiseli, kobuka bondeko nábandimi mosusu, mpo bamonaki ete bikólo ebongisamaki. KasiNsango Malamu monene oyo ezali mpo na ekólo moko to libotamoko te. Ezali nde mpo na “moto nyonso oyo alingi, áyá,” bikólo,mabota, nkota, pe bato nyonso. Mposa ya Nzambe ezalaka te etetókata bandelo.13 Kasi bato bazalaki na mposa ya kozala lokola,komikokanisa, to komekola, kosala lokola ba—bamokilibasalaka, koloba makambo oyo bango balobaka, kolonga lokolabango. Tokoki kolonga ata moke te soki tosali makambo oyobamokili basalaka. Tokoki kolonga bobele soki tolandi mitindoya Nzambe pe lolenge na Ye ya kosala makambo. Tokoki kolongate na komekola mokili. Soki kompani ya makaya ezui elonga

Page 5: LIN59-0628M Lingomba Lipengwisami, Na Mokili VGRdownload.branham.org/pdf/LIN/LIN59-0628M A Deceived Church By Th… · Ezalinini?Ebongiseli.Yangondeesaliyango.Kokakola! 48 Pelelobalongolibatonyonsooyobateyakanaba-balabala

LINGOMBA LIPENGWISAMI, NA MOKILI 81

monene na nzela na televizió, pe baoyo batekaka masangape wiskí bazui elonga monene na nzela na televizió, elingikoloba te ete lingomba pe ekozua elonga na nzela na televizió.Elonga ya lingomba ezali na koteya Nsango Malamu, ya Nguyana Nzambe, pe kotalisama ya Molimo. Tokoki koloba te mpotelevizió esali boye na boye mpo na kompani ya makaya ná—nábakompanimosusu! Tozali ata naLikomímoko tempo na kolukakomikokanisa na bato wana. Pe na ntango nyonso oyo tokosalabongo, tokoki kobenda bato mingi mpenza, kasi yango ezali teoyo Nzambe atíndá biso ete tósala. Tokanisaka ete lokola nyonsoezali kotambola malamu, tozali na bibongiseli minene, oyo ezalikosala ete makambo minene ya kitoko ésalema, ete yango ndeelonga. Tozali kokufa mokolo na mokolo wana totelemi, naelobeli ya molimo! Soki tozalaki milió zomi na ntongo ya lelo,kasi Molimo Mosantu azali elongo na biso te, elingaki kozalamalamu tózala zomi ná Molimo Mosantu elongo na biso. Tokokikomikokanisa na mokili te.14 Pe moko na makambo ya liboso, ezali, lingomba ebandakikomikóma ebongiseli. Ebongiseli ya liboso ezalaki lingombaKatoliko, sima na yango lingomba ya ba-Luterien. Ntangobamibongisaki na lingomba Katoliko mpo na kokómisa yangoebongiseli, mokolo moko mongongo moko eyokanaki: “Bafilistiabazali likolo na yo, Samson,” pe Samson akataki basinga yaekanganelo ya lingomba Katoliko, pe Martin Luther abimaki nabibongiseli.15 Na sima bakangaki lingomba na singa mosusu, lokolaDelila asalaki. Pe babandaki…na esika ya kozala na batooyo babengami na Nzambe, bato oyo babengami na MolimoMosantu; mbala mosusu bayebaki ata ABC te, kasi bayebakiKlisto. Na sima lingomba ekómaki na makambo ya mikolo oyo,koluka kokokana na balobi ya politiki. Pe basengelaki kopesa“diplome ya balakisi” na batei na bango,moto nyonso asengelakikozala Molakisi ya Bonzambe. Yango pe ezalaki singa mosusumpo na kokanga lingomba. Bato bazali kokende kotanga,seminére moko na moko ekómi koluka kobimisa moto ya mayelekolekampomangomba na bango émikumisa: “Mokengeli na bisoazali Molakisi ya Bonzambe.” Pe basalaki nini? Moko akolukakoleka moninga na boyebi. Ee, yango ezali na ntina te na misoya Nzambe.16 Pe ezali na ntina te ete moto ámeka kozua boyebi na ye yamokili mpo na kosepelisa Nzambe. Ezali mbindo na miso yaNzambe! Okosepelisa Nzambe ata moke te na miango pe boyebiya mokili, mpo “Nzambe alingaka yango te,” ndenge Makomielobi. Akoki kolinga yango te.17 Pe moko na moko azali koluka kozua boyebi nyonso. Bayebimpenza oyo basengeli kosala pe maloba ya koloba, pe ekómimpenza maloba ya politiki na esika ya Nsango oyo etalisamina nguya ya Molimo Mosantu, oyo ezindaka kino na motema

Page 6: LIN59-0628M Lingomba Lipengwisami, Na Mokili VGRdownload.branham.org/pdf/LIN/LIN59-0628M A Deceived Church By Th… · Ezalinini?Ebongiseli.Yangondeesaliyango.Kokakola! 48 Pelelobalongolibatonyonsooyobateyakanaba-balabala

82 LILOBA LILOBAMI

ya moto pe ekundoli masumu na ye. Bayekólá mpo na masoloya politiki, kasi tozali na mposa na yango te. Polo alobaki:“Liloba eyaki epai na biso, bobele te…to, Nsango Malamu,na Liloba kaka te, kasi na Nguya pe kotalisama ya MolimoMosantu.” Yango nde oyo Nsango Malamu ememaki, kotalisanguya yaMolimoMosantu!Kasimibali yango nyonso bakendakana ba-seminére pe bayekolaka makambo ya mayele mingi,ndenge basengeli kotelema liboso na bato, ndenge basengelikomitalisa, ndenge basengeli kolata pe ndenge basengeli kosala,basengeli kosala mabunga na gramére te. Nzoka nde, yango ezalimalamu mpo na masolo ya politiki, kasi biso tolukaka malobaya kosepelisa bato te. Polo alobaki: “Nsango Malamu oyo ngainateyaka eyaki ndenge wana te, kasi Eyaki na koyeisama sikana—na Molimo Mosantu pe na kotalisama ya Nguya.” Eyakate mpo na maloba oyo elobami malamu, mpo bwanya na binoézala, to elikia na bino ézala na bwanya ya bato. Kasi eyaka nakotalisama ya Nguya ya Klisto oyo asékwá. Yango nde NsangoMalamu, “Koyeba Ye naNguya ya lisekwa na Ye.”18 Moto nyonso alingi komimona na mayele koleka moninga,ebongiseli nyonso. Ba-Metodiste bakoloba: “Tozali na moto yamayele koleka.” Ba-Batiste bakoloba, lingomba ya Klisto, pemangomba mosusu, bango nyonso: “Biso, biso nde toleki namayele. Biso, ba—bato na biso, topesaka nzela na moto nyonsote mpo ákende koteya Nsango Malamu.” Kasi baponaka bango.(E Nzambe, yoka mawa!) Baponaka bango; soki bakotisi bangomalakisi na bango, nde bapesi bango esika na lingomba. Nzambeakoki kosimba ye te, ata ndenge nini. Nalingaka ete moto oyoakoteya ngai áponama na Molimo Mosantu, moto oyo Nzambeatindi, oyo aponami na bato to na bibongiseli te.19 Boyébi nyonso! Balobaka: “Oh, toyebi nyonso Wana,” kasibamosusu kati na bango bayebi ata ebandeli ya alfabé yaMolimoMosantu te. Bawanganaka Yango.20 Ezongiseli ngai na makanisi mwa búku moko natángakimokolo moko na Californie, eleki mibu soko zomi. Nazuakiyango na esika moko batekaka ba-búku. Nabosani moto oyoakomáki yango. Mwa búku moko ya talo moke, kasi ezalakina makambo ya ntina atako ezalaki lokola ya maseki pemasapo. Kasi, namonaki likambo moko na kati, ezalaki lokolaya Nzambe, mpo na ngai. Pe moko na masapo yango ebandakiboye. Na ntongo moko kati na lopango monene ya basoso, sosomoko ya mobali akanisaki ete azalaki na boyébi nyonso oyobakokaki koyeba. Bongo, apumbwe likolo ya sanduku moko peabeti monoko na ye na sanduku yango, mbala minei to mitano,azongisi motó na ye na sima pe ayembi kitoko, naino boyokasoso mobali koyemba bongo te. Pe bamosusu, abendaki bokebina bango, pe alobaki: “Basi pe mibali ya lopango ya basosooyo, nalingi kosolola na bino nyonso na ntongo ya lelo mpona manáka kitoko ya mayele oyo touti kobongisa.” Alobaki:

Page 7: LIN59-0628M Lingomba Lipengwisami, Na Mokili VGRdownload.branham.org/pdf/LIN/LIN59-0628M A Deceived Church By Th… · Ezalinini?Ebongiseli.Yangondeesaliyango.Kokakola! 48 Pelelobalongolibatonyonsooyobateyakanaba-balabala

LINGOMBA LIPENGWISAMI, NA MOKILI 83

“Nasengelaki kozala na mayele mingi mpo náyekola yango,” peabongisakimwamanéti na ye likolo yamonoko na ye. Pe alobaki:“Namoni ete biso basoso tokoki kobonga soki toyekoli mingi.Yango wana, nakoki koyebisa bino ete, soki totímoli pe tosalimosala na lopango to na libulu moko boye, tokozua vitamíni oyoekosala ete tókóma koyemba kitoko koleka, pe na nsala kitokokoleka. Pe, oh, nakoki koyebisa bino ndenge tokoki kobonga nandenge ebelé.”21 Pe bana soso ya basi ná mwa biloko na bango ya motane namotó, basololi pe balobi: “Oyo nde mobali ya kolinga, boye te?”Pe basepelaki na ye mingi mpenza. “Oh, azali soso ya mayelemingi!” Nakanisi lisusu batei mosusu ya seminére. “Mobali yamayele mingi boye! Ntina ya kolanda bana soso mosusu ezali te,biso nyonso tosengeli kolanda ye.”22 Ee, liboso soso yango ásilisa koloba, mwa soso mosusu oyoazalaki na nsala kitoko mpenza te, ayei mbangu longwa nangámbo mosusu ya lopango yango, pe alobi: “Baninga, bozelanaino! Nauti koyoka nsango na radio kaka sikawa. Ntalo ya sosoemati centime minei mpo na ndambo ya kiló, bakoboma bisonyonso lobi! Boyébi na bino ekozala na litómba nini?”23 Ndeko, boyébi nyonso oyo tokoki kozua, litómba na yangonini? Tozali pied motoba [métre moko na centimétre ntukumwambe—N.D.T.] ya putulú! Biso nyonso tozali kokufa na mwaba-centimétre sima na miníti moko na moko. Boyébi na bisoezali na ntina te. Tozali na mposa ya koyeba Ye. Kasi bangobasalaka bongo.24 Ndenge nazalaki koloba eleki mwa ntango na ntina nandeke moko, oyo akanisaki ete azalaki na boyébi nyonso oyo—oyo basengelaki kozala na yango, ayebaki mingi na lolenge eteakokaki koyebisa ba-ndeke mosusu nyonso makambo ya bato.Bongo apumbwé likolo ya ndako na ye pe abandi koloba nantina na bato, nyonso oyo ayebaki na ntina na bango. Pe, nambala moko, molakisi moko autaki na Purdue akómaki wanape abandi kolobela ye na maloba ya bato oyo batángá mingi,pe mwa ndeke yango abandi kobeta miso, kobalola motó pe…Nzoka, azalaki namiso, azalaki komonamolakisi yango. Azalakina matoi, azalaki koyoka ye. Kasi, na ntembe te, azalaki koyebamakambo azalaki koloba te. Mpo na nini? Azali na bongó yandeke. Azali bobele na bongó ya ndeke. Yango nde nyonso oyoazali na yango. Azali na bongó ya moto te, akoki pe kokanisalokola bato te.25 Ndenge moko pe moto akoki kokanisa lokola Nzambe te!Bozali bato, pe boyébi nyonso yamokili ekokani bobele na bongóya ndeke. Nyonso oyo bosalaka, bomisalaka na yango mabe binomoko. Bosengeli na likanisi ya Klisto.26 Ntina oyo bato bakendaka kokota na bibongiseli, pe batiakambote ya loboko na esika ya mbotama ya sika, balukaka nde

Page 8: LIN59-0628M Lingomba Lipengwisami, Na Mokili VGRdownload.branham.org/pdf/LIN/LIN59-0628M A Deceived Church By Th… · Ezalinini?Ebongiseli.Yangondeesaliyango.Kokakola! 48 Pelelobalongolibatonyonsooyobateyakanaba-balabala

84 LILOBA LILOBAMI

kokima mbotama ya sika. Bazalaka na mposa ya mbotama yasika te. Pe ba—bayebi ete biso toteyaka yango uta na Bible,bongo balingaka kotia eloko mosusu na esika na yango. Ba-Pantekotiste pe bazali kaka mabe ndenge moko, balukaka kotiaeloko mosusu! Balingaka ézala kitoko koleka. Esengeli kozalaya kitoko koleka: “Biso tokopesana mbote ya loboko mpo nakokota na lingomba, pe bakomwángisela biso mwa mai tobakobatisa biso,” to eloko ya ndenge wana. Babangakambotamaya sika. Namonaka mbala mosusu lokola Branham Tabernaclepe babandi kobanga yango!27 Nzoka nde, biso nyonso toyebi ete mbotama, ata esalemiwapi, to na esika nini, wapi, ezalaka mbindo. Ata bebé abotamilikolo na liboke ya matiti, na mabelé ya makasi na ndako, tona chambre ya lopitalo oyo batii langi ya róze, ezalaka mbindo,ata ndenge nini. Mbotama yamwana ngombe, mbotama ya elokomosusu nyonso, ezalaka mbindo.28 Mbotama ya sika pe ezalaka bobele mbindo! Kasi batobakaúká: “Tokokende epai bapesaka mbote ya loboko.Tokokende epai bagángaka te, balelaka te, babetaka etumbelote, pe bagángaka makasi te.” Bolingaka kolekisa ndelo yabomoto! Oyo tosengeli na yango ezali nde mbotama, kokufampenza, yango nde ebotaka Bomoi!29 Momboto, mbálá ya kala, momboto ya mbálá, soki ozuimbálá pe okundi yango na mabelé. Mpo ózua ba-mbálá ya sika,mbálá oyo ya kala esengeli kopola. Lisangu ekoki kobota bomoiya sika te soki epoli te.30 Pe mobali to mwasi akoki kozua mbotama ya sika ata mokete soki naino mayele na ye pe ngai na ye epoli te, ekufi te, kúfána etumbelo, pe gángá, kómá mpenza mbindo, kino ete elokoezalaki kopekisa yo koningana ébima, pe obotami mbala ya sikanaMolimo ya Nzambe. Ata ogángi makasi, olobi minoko na sika,opumbwé-pumbwé, olembi nzoto lokola soso bakati motó, ozalinde kobota Bomoi ya sika! Kasi totii makambo mosusu na esikana yango, tolingi makambo ya kitoko koleka, ya solo.31 Mokolo wana, mokolo ya mitano, mwasi na ngai ná ngaitozalaki kokende na magazíni. Nazali na mposa ya kozongelayango te. Kasi ntango tozalaki kotambola na balabala, nazalakintango nyonso kobalolamotó ngámbo na ngámbo, basi bolumbu.Nalakáká Nzambe ntango nazaláká mokúfi miso, ete sokiAbikisi miso na ngai nakobanda kotala makambo ya malamu.Natiá mwa ekulusu na motuka na ngai. Soki namoni likambo yandenge wana, natalaka ekulusu pe nalobaka: “E Nzambe, Yangonde Ekimelo na ngai,” ntango natali ekulusu.32 Nazalaki komona basi yango. Meda alobaki: “Lelo tomoniata mwasi moko te oyo alati jípe.” Pe alobaki: “Bill, tala mwasioyo kuna alati mwa ba-bretéle na eteni ya likolo ya nzoto naye,” pe alobaki, “okanisi mwasi yango ayebi te ete ezali mabe?”

Page 9: LIN59-0628M Lingomba Lipengwisami, Na Mokili VGRdownload.branham.org/pdf/LIN/LIN59-0628M A Deceived Church By Th… · Ezalinini?Ebongiseli.Yangondeesaliyango.Kokakola! 48 Pelelobalongolibatonyonsooyobateyakanaba-balabala

LINGOMBA LIPENGWISAMI, NA MOKILI 85

Alobaki: “Soki ayebi te ete ezali mabe, boye motó na ye ezalikotambola malamu te.”33 Nalobaki: “Zela naino, molingami. Azali mwasi ya Amerika;azali kosala ndenge bato ya Amerika basalaka.” Nalobaki:“Nazalaki na Finland kala mingi te, molingami.”34 Pe naboyaki kondima kuna oyo mobali moko azalaki kolukakondimisa ngai, Docteur Manninen. Pe tozalaki kokende e—epai basukolaka mpo na bokolongono bwa nzoto, babengakayango sauna, soki bakotisi yo kuna bakosopela yo mai ya móto,to bakosopa mai likolo na mabanga ya móto, pe ekotokisa yo.Na sima bakotinda yo ómibwaka na mai ya malili makasi,pe óbima. Na sima bakotisi yo na ndako moke moko, ba-infirmier bazali kuna, basi bazali konika mibali (pe bazalibolumbu), bakotinda bango lisusu na pisíne. Ngai naboyakikokota. Nalobaki: “DocteurManninen, ezali mabe.”35 Alobaki: “Likambo te, Reverend Branham, ezali mabe.Bongo minganga na bino ya Amerika, balongolaka mwasibilamba, batiki ye bolumbu pe batandi ye na mesa, kotála-tala binama nyonso ya nzoto—nzoto na ye ya mwasi? Bongo ba-infirmier na bino na ba-lopitalo?”36 Nalobaki: “Limbisa ngai, Ndeko Manninen, Manninen,olobi solo.”37 Ezali nini? Ezali mimesano. Ntango nazalaki na Paris ezalakimpasi mpo nándima yango, ete esika ya kosuba mpo na basi námibali ezalaki bobele moko. Nakokaki kososola yango te, eteba-zongo oyo ezalaki pembeni ya nzela ezalaki mpo na mibaliná basi. Nakokaki kondima te ete ntango basi bakei na libongompo na kosukola, elenge mobali ná molingami na ye, bazalakina esika ya kobongola bilamba te, bazalaki bobele kolongolabilamba na bango nyonso kino ya suka, nde bapesani mokongope bazipí eteni moke ya elamba pe bakei kosukola, kasi ezali sebongo. Bamitungisaka na yango ata moke te. Ezali momesano yamboka France.38 Na Afrika, basi ná mibali, bilenge ná mibange, ata bilambamoke te, batambolaka na bisóbe. Bayebaka ata te soki zongoezali nini, to nyonso wana, to bamibombaka pe te mpo baningabámona bango te. Kasi bayebi na bango bokeseni te. Bayebielokomosusu te. Kasi ezali mimesano ya bikólo.39 Kasi nalobaki: “Molingami, biso tozali ndengemosusu, toútána Ekólo mosusu. Tozali baleki nzela pe bapaya awa, yangonde esalaka tómona makambo yango mabe boye. Mpo Bibleelobi: ‘Baoyo batatolaka koloba makambo ya boye, batalisakaete bazali baleki nzela pe bapaya, bazali koluka engumba oyoekoya.’”40 Mobali to mwasi na mboka Itali, na France, na Afrika, nabikólo nyonso mosusu, oyo abotámá mbala mibale na Molimo

Page 10: LIN59-0628M Lingomba Lipengwisami, Na Mokili VGRdownload.branham.org/pdf/LIN/LIN59-0628M A Deceived Church By Th… · Ezalinini?Ebongiseli.Yangondeesaliyango.Kokakola! 48 Pelelobalongolibatonyonsooyobateyakanaba-balabala

86 LILOBA LILOBAMI

Mosantu, asalaka makambo wana te. Bakolata bilamba wanate. Bakosala bongo te, mpo bazali bato ya Ekólo mosusu oyoMokambi pe Motongi na Yango azali Nzambe. Toútá na Lola.Molimo oyo ezali kati na bino, nde ekambaka bomoi na bino.Soki ozali moto ya Amerika, okosala ndenge bato ya Amerikabasalaka. Soki ozali moto ya France, okosala ndenge bato yaFrance basalaka, pe okotónga bato mosusu. Kasi soki ozali yaNzambe, okosala ndenge basalaka na Lola, mpo Molimo na yoeútá na Likolo pe Ezali kokamba yo.41 Eloko moke bokoki kotalela. Kati na Makomi, baoyobazalaki koluka Engumba ya sika oyo, babikaki ndenge mosusu.Batatolaki ete bazalaki baleki nzela pe bapaya. Kasi na ngámboya Kaina, bakómaki batomboki pe bato na kanja. Kasi Baklistobazalaki baleki nzela pe bapaya. Motomboki azalaka na esika yakofanda te, moto na kanja azalaka moto ya nsomo. Kasi molekinzela ezali likambo ya solo, auti na mokili ya solo kino na Ekólomosusu, azali koluka kozonga na Ndako, kotatola na nzela yabomoi na ye ete azali na eloko moko, ete aútá na Mboka mosusu.Yango nde ntina na yango.42 Kasi ata bongo bato oyo basalaka bongo, bato oyo balatakabiloko wana, botika náyebisa bino. Na Afrika ya Sudi, ntangonamonaki bapakano nkóto ntuku misato, bolumbu, bato yamboka mpenza. Bana basi ya mibu zomi na motoba, zomi namwambe, ntuku mibale, bana mibali balati ata singa ya elambate, batelemi wana ná potopoto na elongi, pe bapakoli balángi,ná mikúwa na zolo na bango, pe biteni ya nzete na matoi nabango, pe mikúwa ya bato to mikúwa soki ya nini na nsuki nabango, míno ya banyama na nzoto na bango, bolumbu ndengebabotámá, pe bazalaki koyeba yango te. Kasi ntango bayambakiKlisto, bakweaki na bilongi na bango pe bayambaki MolimoMosantu, batelemaki pe bakangaki maboko na bango na ntolompo na kobomba nsoni, wana bazalaki kokende koluka bilambaya kolata. Mpo na nini? Bakómaki baleki nzela pe bapaya namokili oyo. Aleluya! Bazalaki mosika na Ye. Iyo, misie.43 Oh, iyo, bato yango bamibengaka Baklisto. Bazali na ba-losambo epai basambelaka. Bakendaka koloba: “Tozali ba-Metodiste. Tozali ba-Batiste. Tozali ba-Pantekotiste. Tozali ba-Advantiste ya Mokolo ya Nsambo. Tozali boye na boye.” Oyowana ezali na ntina te. Molimo na yo, bomoi oyo ezali kati nayo, nde ekambaka yo pe etalisaka oyo yo ozali. Yesu alobaki:“Bokoyeba bango na mbuma na bango.”44 Lingomba ekómi lokola Yisalaele, na ebandeli. Bamonakibikólo nyonso ya bapakano bazalaki na mokonzi. Nzambeazalaki Mokonzi na bango. Pe bamonaki bikólo ya bapakanobazalaki na mokonzi, bongo bango pe bakómaki na mposa yakosala lokola bikólo ya bapakano, pe bamisombelaki mokonzi.Pe ntango basalaki bongo, bazuaki mikakatano. Malembe-malembe ebandaki kokota. Malembe-malembe mokili ebandaki

Page 11: LIN59-0628M Lingomba Lipengwisami, Na Mokili VGRdownload.branham.org/pdf/LIN/LIN59-0628M A Deceived Church By Th… · Ezalinini?Ebongiseli.Yangondeesaliyango.Kokakola! 48 Pelelobalongolibatonyonsooyobateyakanaba-balabala

LINGOMBA LIPENGWISAMI, NA MOKILI 87

komikotisa kati na bango. Sukasuka eyaki kokóma na Akaba.Mokonzi moko ayaki mwa pembeni ya yango, mwa pembenina yango, pe sukasuka ebimisaki bomoi oyo ezalaki kati nabango. Pe bango wana bakei. Pe ntango Mokonzi ya solo ayaki,bayebaki Ye te.45 Yango mpenza nde lingomba esali. Eponi. Yango mpenza.Eponi politiki, kelasi. Eponi bibongiseli, bato minene,mangomba minene, batei ya lofúndo. Pe ntango Mokonzi yasolo ayei, bayebi Ye te, pe bazali kobaka na ekulusu MolimoMosantu mpenza oyo azali Mokonzi na bango. Bayebi Ye te,kasi bazali koseka Ye pe kotiola Ye. Ndenge bayuda basalakiMasiya na bango, lingomba pe ezali kosala ndenge moko naMasiya na bango. Bayebi yango te. Bayebi kokota na molimo te,mpo balakísá bango oyo ebétaka miso pe oyo bamonaka, ndakominene, balukaka komikokanisa namokili. Balo—balobá na bisote ete tómikokanisa namokili. Balobá na biso ete tómikitisa.46 Pe, moto moko atalisaka boike, mpo na Nzambe. Pe lelokati na bisika ya koteya, baevangeliste oyo bateyaka lobikona nzoto, kowelana ekoti mingi, bazali kowelana. Moko alobi:“Ee, Nzambe ápambolama, nazali na bandimi nkóto songolo.Liyangani na ngai eleki oyo ya yo na bato.” Ekosala nini? Tózalana moto moko to na bato milió, ekosala nini? Tozali sembo epaina Nzambe? Tozali sembo na Liloba na Ye? Toyikaka mpiko nakomekama ya Molimo Mosantu? Ezali ya solo? Yango nde elokoya motuya.47 Kasi tokakolaka Bible. Ba-Pantekotiste na biso mingi, naoyo etali Malakisi ya moboko ya Bible oyo, bakakolaka. Ezalina…Naboi kozokisa mitema. Nazali kati na losambo na ngaimoko, pe nakanisi ete na—nakoki kosala yango, na losambo nangai, mpo nazali koteya Nsango Malamu. Kasi nkóto ntúkú nantúkú ya batei ya ba-Pantekotiste bayebi ete na Bible, libatisi nankombo ya “Tata, Mwana, Molimo Mosantu” ezalaka te. Nabetimóndengé na epískopo mokonzi, to na moto nyonso, álakisangai esika moto moko asílá kozua libatisi na nkombo ya “Tata,Mwana, Molimo Mosantu.” Kasi bakakolaka, mpo bibongiselinde esali ndenge wana. Moto ata moko te na Kondimana ya Sika,pe na mibu nkama misato oyo elandaki, ndenge istwáre elobi,asílá kozua libatisi mosusu, bobele na Nkombo na Yesu Klisto.Ezali nini? Ebongiseli. Yango nde esali yango. Kokakola!48 Pe lelo balongoli bato nyonso oyo bateyaka na ba-balabala.Balongoli mbonda na losambo. Balongoli nkembo nyonso nalosambo, pe batii mateya ya seminére, mateya ya soso mobali,oyo babongisi na batominene, pe basi na bango balataka bakupépe bilamba ekangá nzoto, pe mibali bamelakamakaya, babetakamasano ya mbongo pe basalaka maseki ya mbindo. Ezali nsonina miso ya Nzambe! Nayebi ezali makasi, kasi ntango ekoki mpomoto moko áloba likambo. Baboyi kondima, bamitiki, kosalamakambo lokola mokili!

Page 12: LIN59-0628M Lingomba Lipengwisami, Na Mokili VGRdownload.branham.org/pdf/LIN/LIN59-0628M A Deceived Church By Th… · Ezalinini?Ebongiseli.Yangondeesaliyango.Kokakola! 48 Pelelobalongolibatonyonsooyobateyakanaba-balabala

88 LILOBA LILOBAMI

49 Ata nasengeli kotikala ngai moko, ná moto mosusu te bobelená Nzambe, nakoteya Solo ya Biblia ya Nzambe pe nakozuangámbo na Yango. Ata nakokufa, nakokoba kozua ngámbo yaSolo. Ya solo. Tolingi Solo. Nakomipima kokokana na lingombate, kasi kokokana naLiloba yaNzambe nde nalingi komipima.50 Kasi Delila, bomonaki yango, ayebaki ete Samson azalakina nguya. Kasi azalaki koyeba te epai wapi nguya yango ezalakikouta. Azalaki koyeba nguya yango te, kasi Samson azalakina nguya monene, pe ye alingaki koyeba yango. Pe, lokolaDelila, azalaki kolanda-landa Samson mpo ápengwisa ye nakitoko na ye. Oh, azalaki mpenza na elateli mabe. Pe azalakikotambola liboso na ye pe koseka-seka lokola bilenge mosusu yalelo, pe—pe nyonso wana, pe azalaki kolinga kosala lokola basioyo balongolaka bilamba wana bazali kobina, mpo na kolukakokweisa Samson.51 Likambo yango moko nde mokili esali na lingomba. Sikawawapi Nguya na bino monene?52 “Ee, soki tokómi ebongiseli, ekokitisa Nguya.” LingombaKatoliko esalaki bongo.53 “Kasi Bafilistia bazali likolo na yo, Samson.” Pe Luthermoko abimaki.54 Na sima bakómaki lisusu ebongiseli. “Soki okangi ngai nasingamosusu, ekopekisa ngai.” Basalaki pe ndengewana.55 “Pe Bafilistia bazali likolo na yo, Samson.” Likambo niniesalemaki?Wesley abimaki pe akataki ba-singa.56 “Sikawa okosi ngai pe mingi. Oyebi te ete nalingaka yo,Samson?Malamu, yebisa ngai solo yamotema na yo.”

“Malamu, kangá ngai na singa mosusu.”57 “Malamu, tokosala yango.” Ezali nini? Ezali singa yabibongiseli.58 “Botika ngai na bonsomi, názala na ebongiseli te. Na ntangowana, nalobi na bino, bokolonga ngai.” Bongo ba-Pantekotistebabimaki. Wapi nguya na yo?

“Bafilistia bazali likolo na yo.” Pe akataki lisusu ba-singa yango.59 Kasi sikawa likambo nini esalemaki? Esalemi na ba-Pantekotiste, bakengeli na bango ekomi Balakisi minene yaBonzambe, bato minene. Batángi mingi pe bazali na milúlúmingi lokola ba-Metodiste to ba-Batiste, to bamosusu nyonso.Soki okoti na losambo moko okoyoka ata “amen” moko te,bazali malili lokola ba-Eskimo oyo bauti na Pole Nord. Malili!Bakipaka te! “Pe sikawaBafilistia bazali likolo na yo, Samson.”60 Bafilistia bazali likolo na yo, Amerika. Wapi bomoko wanaya molimo? Wapi bomoko ya ba-Pantekotiste? Ba-Losambo yaNzambe, lingomba Esangani, lingomba ya Nzambe, pe bongo na

Page 13: LIN59-0628M Lingomba Lipengwisami, Na Mokili VGRdownload.branham.org/pdf/LIN/LIN59-0628M A Deceived Church By Th… · Ezalinini?Ebongiseli.Yangondeesaliyango.Kokakola! 48 Pelelobalongolibatonyonsooyobateyakanaba-balabala

LINGOMBA LIPENGWISAMI, NA MOKILI 89

bongo, lingomba moko na moko na isme na yango, lingomba oyona likambo boye, pe oyo kuna na likambo boye. Tokabwanimingina lolenge ete okoki kokende na engumba moko mpo na kosalamayangani ya kolamuka, soki lingomba moko ebongisi yango,bamosusu bakoya na bango te. Ba-Communiste bazali likolo nayo, Amerika.61 Wapi Nguya na biso? Wapi nkembo na biso? Ezali nini?Mpo tolandaki bwanya ya bato na esika ya Nguya ya Nzambe!Oh, bakómi, batei na biso pe bamosusu bakauki mingi pebaninganaka te, na lolenge ete bakómisi biso bibongiseli petokaúkí pe toninganaka te, pe bato…Boyokaka lisusu batokogánga na losambo? Okoyoka moto azali kolela te. Bakitísáebónga ya mabondeli na nse ya ndako ya losambo. Nkemboezalaka lisusu na losambo te. Nyonso tosalaka ezali bobelekofanda lokola bikeko. Tozali na bonsomi te. Tokangámá.Zabolo, ná milimo mabe na ye ya ekeke oyo, akangá lingombaya Nzambe na bomoi. Ya solo. Nguya ezali lisusu na lingombate. Bonsomi ezali lisusu te. Bato bakaúká pe baninganaka te!Oh, Nzambe akoki koya epai ya ba-Pantekotiste, pe kotalisaete Azali Nzambe, pe kotalisa bilembo na Ye ya lisekwa na Ye,ekoningisa ata bango te. Nkembo! Oh, ezali nsoni! Natambolakana ekólo mobimba, Nzambe azali kosala, kosala bikamwa, kasibato bafandi, pe, “Ee, nakanisi ezali malamu. Oh, nayebi étéekoki kosalema.” Eningisaka bango te! Mpo na nini? Delila,mokili, akangá bango. Bakangámá naminiololo.62 Sikawa bakotisi bango ata, bakangi bango kati na lisangamoko. “Bafilistia bazali likolo na yo, Samson.” Okosala nini mpona yango?63 “Oh, tozali na bibongiseli minene.” Na ntembe te. “Tokómina bandimi mingi koleka liboso.” Kasi wapi Molimo? WapiMolimo Mosantu?64 Yango nde oyo Zabolo asali. Akómaki kolanda-landalingomba pe amikotisi na kati. Azalaki ntango nyonso kolanda-landa lingomba: “Yaka epai na ngai, nakopesa yo losambomonene awa soki osali bobele boye. Soki olongoli motei na binooyo alekísá ndelo, pe ozui motomoko,Molakisi na Bonzambe oyoayebi kososola, tokotonga losambo monene pe ya kitoko mingi,pe tokozala lokola bamosusu.” Nsoni na bino! Malamu kozalana moto oyo ayebi bokeseni ya kafé ná madésu te, kasi atóndá naMolimoMosantu, oyo akakolaka te, naNguya yaNzambe.65 Kasi, oh, eninganaka lisusu te, na lolenge ete mosantumoko akoki kokota na liyangani pe alobi minoko ya sika, toagángi mwa moke, to asali likambo moko, pe bango nyonsobakotombola nkingo pe bakobaluka mpo na kotala. “Ezalakinini? Ee, nayebi te mpo na nini? Esengeli kozala fanatíke mokoakoti awa na esika moko.” Boyebi ete ezali ya solo! Mosantumoko akoti, asepeli mingi pe atomboli maboko, aleli pe akumisi

Page 14: LIN59-0628M Lingomba Lipengwisami, Na Mokili VGRdownload.branham.org/pdf/LIN/LIN59-0628M A Deceived Church By Th… · Ezalinini?Ebongiseli.Yangondeesaliyango.Kokakola! 48 Pelelobalongolibatonyonsooyobateyakanaba-balabala

90 LILOBA LILOBAMI

Nkolo, soki moto moko agángi “amen” na liteya ya NsangoMalamu, pe bango nyonso bakobalukampo bámona oyo ye alobi.Oyo wana nde ba-Pantekotiste. Likambo nini? Bokómi kolandamakambo ya ba-Metodiste, ya ba-Batiste; bango balandakimakambo ya Bakatoliko; Bakatoliko balandaki makambo yalífelo. Pe, bango nyonso, bazali kolanda makambo ya lífelo!Ya solo.66 Delila, mopengwisi, andimisi bino kokota na mangombaminene, na batei kitoko, batángá mingi, kozala na bato minene.“Ee, boyebi, moto Songolo oyo awa azali moto na misolo mingi,soki tokoki kokomisa ye moto ya losambo na biso! Oh! la la!”Soki abotami mbala na mibale te, esengeli na ye te kozalawana. Ata azali na milió ya ba-dollar. Ata azali na mitukaCadillac ntuku minei, ata azali na nini, asengeli kobotamambala ya mibale, koya na mbotama ya sika pe kobongwanana nzela ya Molimo Mosantu, pe ábotama wana na mbotamaya sika, ná miyoyo (bólimbisa ngai), kolela pe kogánga, pekosala makambo oyo bamosusu basalaka, pe kobika, sima nayango, bomoi oyo ekotalisa ete azui Yango. Amen. Yango nde oyobosengeli na yango.67 “Samson, Bafilistia bazali likolo na yo.” Ba-Communistebazali likolo na yo. Mokili ezali likolo na yo. Zabolo azalilikolo na yo.68 Bazongaka pe bamonaka Molimo ya Nzambe kosalabikamwa pe kosalamakambo ya lisekwa na Ye, oyo Yesu alakaki,balobaka: “Boyebi, nakanisi Ndeko Branham azali na telepatímingi ya molimo. Mokengeli na biso alobaki ete ezali makamboya Zabolo.”69 Bino bazangi kondima, bakosi, bozali komikosa, bosalakamakambo kitoko, bino bambwá ya zamba bolati bilamba yabampate! Yesu alobaki: “Soki boyebaki Ngai, bolingaki koyebamokolo na Ngai.” Kasi bozali na ba-Saulo oyo balukakakokómisa bino lokola bato nyonso ya mokili.70 Tozali na mposa ya bato na Nzambe oyo bakakolaka Lilobate, kasi oyo bateyaka Solo pe batelemi ngwi na libatisi yaMolimoMosantu.71 Kasi mokili esali nini? Ekókóli Nguya na bino nyonso.Bobótámá Banaziri, bino ba-Pantekotiste, kasi mokili ekókólimpenza Nguya na bino. Sikawa boninganaka lisusu te lokolabamosusu.72 Tokosala nini? Likambo nini ekosalema? Nakoki kokanisalikambomoko ya nkembompo na kosilisa litángi oyo.73 Ezalaki Samson kokangama singa! Tokoki kozua kolamukate. Boyoka Ndeko na biso ya sembo, Billy Graham: “Kolamukana eleko na biso!” Boyoka Oral Roberts kogánga: “Kolamukana eleko na biso!” Boyoka bamosusu: “Kolamuka na eleko

Page 15: LIN59-0628M Lingomba Lipengwisami, Na Mokili VGRdownload.branham.org/pdf/LIN/LIN59-0628M A Deceived Church By Th… · Ezalinini?Ebongiseli.Yangondeesaliyango.Kokakola! 48 Pelelobalongolibatonyonsooyobateyakanaba-balabala

LINGOMBA LIPENGWISAMI, NA MOKILI 91

na biso!” Tokozua kolamuka ndenge nini wana tokangamisinga? Tokangi Molimo Mosantu, na bibongiseli pe na mimesanona biso, pe tokoki kozua kolamuka ya Molimo Mosantu te.Amen. Nayebi ete ezali mpenza moto, ná molunge oyo, kasiezali Solo. Tokoki kozua kolamuka ya Molimo Mosantu ndengenini wana bokangámá boye pe boninganaka te! “Lolenge yakosambela,” Bible nde elobi ete bakozala na yango. “Lolengeya kosambela, kasi bakowangana Nguya na yango.” Nguya yanini? Nguya ya ebongiseli? Nguya yamokili? Nguya ya lingomba?Nguya ya Molimo Mosantu! Yango nde esika ya sekelé nalingomba. Pe ntango lingomba eponi batei oyo batángá, pebandako minene ya kitoko, esika ya Molimo Mosantu na lolengeya kala, malamu bázonga na misió. Amen. Ya solo. Ndengenini bokozua kolamuka ya Molimo Mosantu, wana bato bazalikozímisa Yango, kokanga Yango pe kobanga Yango? Wana ndeesika likambo ezali.74 “Bafilistia bazali likolo na yo.”Kasi elikia epambolamimokotozali na yango, wana Samson azalaki na boloko…75 Basalaki liboso nini ntango bakangaki ye? Bakangaki yesinga, liboso. Balongolaki nguya na ye, basosolaki sekelé naye. Basosolaki sekelé na bino. Mokili esosolaki sekelé na bino.Sikawa bino basi, bino nyonso bokómi kokata suki na bino,ekómi lokola mokili. Bino mibali bobandi kosala makambolokola mokili. Ezali mabe te, koloba maseki pe maseki yambindo, kokende komela makaya, pe kobima na basi yabazalani, pe makambo nyonso mosusu ya ndenge wana, komelamasanga elongo na baninga mpo na kobatela mosala na bino.Malamu koleka kolála na libumu na ngai pe kolia lipa ekaúkápe komela mai ya ebale, pe kotikala peto pe kozanga mbindona miso ya Nzambe, na esika ya kosala boyokani mpo na mosalamoko boye. Ya solo. Solompenza. Bókangama naNzambe.76 “Samson, Bafilistia bazali likolo na yo.” BranhamTabernacle, makambo ya mokili ezali kokotela bino mokemoke.Likambo nini? Bolakisi sekelé na bino? Bolakisi sekelé Nzambeapesaki bino ntango bozalaki kobaluka kuna na putulú yamabáyá eleki mibú moke? Botiki yango kobima mokemokepe bokomi na losambo ya komisepelisa na milulu? Likambonini ekómeli bino? Nzambe akoki kokita, kosala bikamwa,kotambola na losambo mobimba pe koyebisa bato basekeléya mitema na bango, pe nyonso wana, kobikisa babeli pe batona mawa, kosala bilembo pe bikamwa, pe koteya Liloba na Yena makasi na yango nyonso, na nzela ya Molimo Mosantu; kasibato bakoloba: “Ee, nakanisi ezali na yango mabe te. Tosepelakakoyoka yango mbala na mbala, soki tolembi mingi te.” Yangonde BranhamTabernacle. Bafilistia bazali likolo na yo.77 Kalakala, ezalaki ntango Liloba ezali koteyama, basantuya kala, ná mpisoli na miso, bazalaki kotelema pe kotambola,kolela, mbala mosusu bakoloba ata liloba moko te, bobele

Page 16: LIN59-0628M Lingomba Lipengwisami, Na Mokili VGRdownload.branham.org/pdf/LIN/LIN59-0628M A Deceived Church By Th… · Ezalinini?Ebongiseli.Yangondeesaliyango.Kokakola! 48 Pelelobalongolibatonyonsooyobateyakanaba-balabala

92 LILOBA LILOBAMI

kokende pe kozonga, mbala mibale to misato, pe bafandi,batóndisamimpenza naMolimoMosantu! Liloba ezalaki koleisabango! “Moto akobika na lipa mpamba te, kasi na Liloba nyonsoekobima na monoko ya Nzambe.” Bafilistia bazali likolo na yo,Branham Tabernacle.

Bafilistia bazali likolo na bino, ba-Pantekotiste.78 Na ntembe te, Bafilistia bakangi bino, bino nyonso, elekintango molai, ntango bomikómisaki ebongiseli ya makasi, elokomoko te ekokaki kokota bobele soki ozali Presbiterien, Batiste,Metodiste, Katoliko, to na lingomba mosusu. Bozalaki na ntinaya bamosusu te.79 Boye, kolamuka na eleko na biso? Tokozua yango ndenge niniwana mokili ekangi ye oyo apesaka mpenza kolamuka? Nzambeakoya te esika mokili ezali, bondima yango. Soki bosangani namokili, e—esili mpo na bino. Soki botiki mokili ékota, bobandikosala makambo lokola mokili, esili mpo na bino. Kasi sokibokati singa nyonso ezalaki kokanga bino na mokili, pe boyeiepai na Nzambe, Nzambe akosalela bino liboso na bino kobandalisusu kolanda mokili.80 Elikia bobele moko nazali na yango na ntongo ya lelo yangooyo, mpo na kosilisa Liteya na ngai, ezali nde: “Wana Samsonakangamaki, suki ya sika ebimaki.”81 Tika ete Nzambe átindela biso Lingomba mosusu libosontango ésuka, ete Nguya ya Molimo Mosantu ékoka kokota katina yango, na kotalisama yaMolimo, peMalako 16 ékoka kolandaLingomba, Misala 2:4, Misala 2:38, nyonso wana etambolana Lingomba. Bilembo pe bikamwa etambolaki na bantoma.Bilembo minene ya lisekwa na Ye etambolaki na bango. Wanatozali na boloko, na ntembe te, Nzambe azali kokólisa suki esikamoko, mpo na kobomama ya suka. Tika ete ézala yo, moningana ngai Moklisto ozali awa na ntongo ya lelo, tika yango ézalamakasi na yo oyo ebandi kokola. Nasengi ete Liteya oyo nantongo ya lelo, kati na ekólo mobimba pe esika yango ekokende,nazali kolikia ete Liteya oyo ekosunga mpo na kopesa vitamini,na nzoto na bino, pe ekokólisa lisusu Nguya ya Molimo kati nabomoi na bino.

Tógumba mitó mpo na kobondela.82 E Nkolo Nzambe, Mokeli ya Likolo pe na nse, Mobandisi yaBomoi ya Seko,Mopesimakabo nyonso yamalamu pe yamolimo,zua maloba oyo na ntongo ya lelo pe tia yango na motema, pemwangisela yango mai, Nkolo. Tika ete bato bábondela mpo namakambo oyo, komona ete mokili elandi lingomba pe sukasukaemoni Nguya na yango, emoni esika na yango ya sekelé, emoniesika sekelé na yango ezalaka, pe ekókoli yango. Ekangi baoyobagángaki elonga na ebandeli, baoyo bazalaki na elonga, peekókoli bango, bakómi kotikala na ndako mokolo ya misato nampokwa mpo na kotala manaka ya televizió. Elongoli esengo

Page 17: LIN59-0628M Lingomba Lipengwisami, Na Mokili VGRdownload.branham.org/pdf/LIN/LIN59-0628M A Deceived Church By Th… · Ezalinini?Ebongiseli.Yangondeesaliyango.Kokakola! 48 Pelelobalongolibatonyonsooyobateyakanaba-balabala

LINGOMBA LIPENGWISAMI, NA MOKILI 93

na mitema na bango, pe epesi bango bolingo mingi mpo namokili koleka oyo bazali na yango mpo na Nzambe. Epesi bangomokili mingi, makambo ya mokili, mposa monene ya bisengo yamokili koleka oyo ya mateya ya Nsango Malamu. Soki orkéstremonene ezali te ná makambo ndenge na ndenge, ya loyengé peya kosepelisa, bango pe balingi lisusu Nsango Malamu ya kalate, oyo ebimisaka mpisoli ya esengo na bomoto ya kati, oyoezongisaka lobiko na nzoto kouta na Nzambe, oyo ezongisakamakabo ya bantoma na lingomba, oyo ekotisaka Klisto oyoasékwá, Masiya ya lelo oyo.83 Kasi ndenge Yisalaele bakangámáká singa na—na bakonzina bango, mpo bákoka te kolanda Mokonzi oyo ya solo; peMokonzi oyo ya solo, ntango Ayaki, bayebaki Ye te. Ezali pebongo lelo. E Nkolo, Mokonzi ya Nkembo amonani na lolengeya Molimo Mosantu, kasi, Nkolo, bango bazali koyeba yango te.Bazali kososola yango te. Bakómá mpenza bibongiseli makasi,na lolenge ete bazali kososola yango te, mpo esalemi kati naebongiseli na bango te. Nkolo, yango ezali mosala ya Zabolo oyoasali bongo epai na bato.84 Tika ete Samson ya Nzambe, tika ete bato ya sembona motema, baoyo bazali na mposa makasi pe bazali kolela,kolobela pe kotingama, tika ete bákangama na yango, Nkolo,kino suki ya sika ébima, kino esengo ézonga na Siona, pe etongamoko ébima, ya baoyo bakoyeba pe bakososola, bakomonaMasiya pe Nguya oyo ebombámá, oyo bamokili bakomona te, oyobakososola sikawa te. Sálá, Nkolo, ete bámona likambo oyo.Mpotosengi yango na Nkombo na Yesu. Amen.

[Maloba mazangi na eteni oyo ya bande—N.D.E.]

…Nguya sikawa,O Nkolo, tinda Nguya sikawaPe batisa moko na moko.Bazalaki na chambre ya likolo,Bango nyonso na motema moko,Ntango Molimo Mosantu akitakiOyo Nkolo na biso alakaki.O Nkolo, tinda Nguya na Yo sikawa,O Nkolo, tinda Nguya na Yo sikawa;O Nkolo, tinda Nguya sikawaPe batisa moko na moko.

85 Nalingi Ye mingi! Atinda Nguya na Ye! Bazalaki na chambreya likolo, bango nyonso na motema moko. Nyonso ya mokiliebimaki libanda na bango. Eloko ata moko te etikalaki kati nabango, pe Molimo Mosantu ayaki.86 Lelo bakómi koloba: “Yaka kokota na lingomba, komísánkombo na yo na buku. To gumbama pe loba: ‘NatatoliKlisto lokola Mwana na Nzambe,’ telema.” Zabolo pe asalaka

Page 18: LIN59-0628M Lingomba Lipengwisami, Na Mokili VGRdownload.branham.org/pdf/LIN/LIN59-0628M A Deceived Church By Th… · Ezalinini?Ebongiseli.Yangondeesaliyango.Kokakola! 48 Pelelobalongolibatonyonsooyobateyakanaba-balabala

94 LILOBA LILOBAMI

ndenge moko. Ya solo. Zabolo abatisamaki ntango Yudasiabatisamaki. Zabolo akendeki koteya Nsango Malamu ntangoYudasi akendeki koteya Nsango Malamu. Kasi Zabolo azuakiMolimo Mosantu te. Ezali bongo. Nguya oyo ebombámá ezalakande wana, na lisekwa wana, kondimisama ya ngwi, na ntembeata moke te. Amen.87 Azali awa. BobeleMolimoMosantu yango, oyoAzalaki likolona Masiya, Azalaka likolo na Lingomba na Ye. Akendeke te.“Nakozala na bino ntango nyonso, ata kati na bino, kino na sukaya mokili. Nakozala wana. Misala oyo Nazali kosala, bino pebokosala yango. Bokosalamingi koleka oyo,mpoNazali kokendena Tata na Ngai.”88 Kasi mokili ezali kokakola yango: “Oh, oyo wana ezalimakambo ya kala!” Yango mpenza nde oyo Zabolo alingakaete bósala. Bango balingaka kosepelisa bino. Nzambe alingiete bóbatisama. Nzambe alingi ete bó…Bolobaka: “Oh, ngainandimaka makambo ya ndenge wana te.” Bókoba kobika,bókoba kobika na masumu na yo, bóbika na masumu na bino.Kasi bosengeli kopola, bosengeli kopola na makanisi na binomoko, bosengeli kopola na bizaleli na bino, koyeisama sika pekobotama mbala ya sika, pe Bomoi wana ya sika ekokesanampenza na oyo ekundamaki.89 Mbuma ya lisangu ezalaka na langi ya mosaka ntangoekundamaka, ebimaka langi ya mpondu. Ezalakamakasi ntangoekundamaka, ekangámá, ebimaka petepete pe ebinaka namopepe. Oh, nkembo! Aleluya! Soki mopepe ebandi kopepa,mbuma yango esengeli pe koningana, ngámbo na ngámbo, kasimwa—mwa lokasa ekogumbama pe ekosepela, ekóli, pe ezuimakasi. Ekoki kokóma lokasa te soki lisangu yango ekufi peepoli te. Kokufa mpamba te; kasi kopola. Ekoki lisusu kozongate, kasi bomoi ebimi libanda na yango.90 Ndenge nauti koloba, mbotama ezalaka likambo ya nsomo,mbindo, bosoto, suka na mbindo, kasi kuna nde epai bomoiezalaka. Soki omimoni na mbindo, soki omoni ete bindimelina bino ya ba-Metodiste, ba-Batiste pe ba-Pantekotiste ezalimbindo, pe okufi na etumbelo, na ntango wana Bomoi ya sikaekokota. Molimo Mosantu ematisi yo likolo na yango; omoniNzambe.91 Tokomona Ye na mokolo ya nkembo. Mokolo moko, mosikana kufa mpenza, tokomona Ye. Bondimi yango? Mokolo moko,mosika na kufampenza,mokolo ya esengo ezali kozela ngai.92 Natelemaki awa na litumu lobi na mpokwa, pe nakanisakiete namoni elenge Rabbi Lawson. Ntango azaláká koya awa, pekosembola lingenda na ye pe kobenda ngai na nkingo na ye,kotia lingenda na ye na nkingo na ngai, kino awa na etumbelo,pe koyemba loyembo yango: “…ezali kozela ngai.” [Malobamazangi na eteni oyo ya bande—N.D.E.]…?…

Page 19: LIN59-0628M Lingomba Lipengwisami, Na Mokili VGRdownload.branham.org/pdf/LIN/LIN59-0628M A Deceived Church By Th… · Ezalinini?Ebongiseli.Yangondeesaliyango.Kokakola! 48 Pelelobalongolibatonyonsooyobateyakanaba-balabala

LINGOMBA LIPENGWISAMI, NA MOKILI 95

93 Likambo moko esalemaki! Ebimisaki mokili libanda.Nakómaki komona makambo ndenge mosusu. Namitungisakamingi na ndenge bato ya Amerika basalaka, ntango nyonso,mibú na mibú, komona ndenge basi ná mibali bazali komibebisape kolanda masumu, na lolenge ete nalingaki kolemba, mbalamibale to misato, mpo nazalaki komitungisa mingi mpo nayango. Lobi, nalobaki na Nzambe: “Nakomitungisa lisusu te.Liloba na Yo nde elobi ete ekozala bongo. Kasi nakotelema wanape nakotelemela yango namakasi na ngai nyonso.”

94 Mokolo wana, nazalaki na Green’s Mill, na lidusú na ngai,mosika mpenza na zamba, nabondelaki moi mobimba. Pe penena ngonga ya misato, moi ebandaki kolala, natelemaki wana penazalaki kotala mosika, nabimaki na lidusú, natelemaki likoloya libanga moko ya monene. Natelemaki wana, nazalaki kotalana Est, kokumisa Nkolo. Nazalaki komona ndenge moi ezalakikokita na sima ya banzete oyo ezalaki na nsonge ya ngomba,wana nazalaki kotala na ngámbo mosusu ya lobwaku pe bipaimosusu, nkasa ya nzete ezalaki ebele, pe kimia mpenza. Penalobaki: “Nkolo, mokolo moko Obombaki Mose kati na lidusúya libanga, pe Olekaki pembeni na ye, mpo alembaki. KasiOlekaki pembeni, alobaki ‘ezalaki lokola mokongo ya mobali.’”Nalobaki: “Bomba ngai kati na lidusú, Nkolo.” Bobele na ntangoyango, pembeni na mopanzi na ngai, mwa Mopepe moko eyakipe elekaki na matiti. Elekaki wana, eyaki mpenza pembeni namopanzi na ngai, Mopepe moko ya moke ezalaki koleka, peekotaki na zamba. Natelemaki wana.

Mokolo moko, bobele Nzambe nde ayebi esikape ngonga,

Bapiné nyonso ya bomoi oyo ekotelema,Bongo nakokende kofanda na ngomba yaSiona.

Mokolo moko mosika na kufa mpenza,Mokolo moko, bobele Nzambe nde ayebi esikape ngonga,

(Likambo nini ekosalema? Bapiné mike oyoezali kobaluka, ekotelema.) Bapiné nyonso yabomoi oyo ekotelema,

Bongo nakokende kofanda na ngomba yaSiona.

Kita, likalo kitoko,Yaka komema ngai na Ndako;Kita, likalo kitoko,Yaka komema ngai na Ndako.

Soki okómi kuna liboso na ngai,Yaka komema ngai na Ndako;

Page 20: LIN59-0628M Lingomba Lipengwisami, Na Mokili VGRdownload.branham.org/pdf/LIN/LIN59-0628M A Deceived Church By Th… · Ezalinini?Ebongiseli.Yangondeesaliyango.Kokakola! 48 Pelelobalongolibatonyonsooyobateyakanaba-balabala

96 LILOBA LILOBAMI

Yebisa Ndeko Bosworth, ná baninga na ngainyonso, pe,

Yaka bobele komema ngai na Ndako.Sikawa kita…(Mokolo moko Akokita mpo nakozua ngai.)…likal-…

(Nzete nyonso ekopelamóto; Banje yaNzambe,likalo ya móto)…komema ngai na Ndako;

Kita, likalo kitoko,Yaka komema ngai na Ndako.

95 Moko na mikolo oyo, moko na mikolo oyo na bangonga yasuka liboso na liwa na ngai, nakozela ete Áya. Ya solo.

Nabwakaki miso na ngámbo ya Yaladene penamonaki nini

Yaka komema ngai na Ndako; (ndengemobange Eliya azalaki kotala na ngámboya Yaladene)

Lisanga ya Banje na pole bazalaki koya kozuangai,

Bazalaki koya mpo na komema ngai na Ndako.Kita, kita mpenza, likalo kitoko,Yaka komema ngai na Ndako;Kita, likalo kitoko,Yaka komema ngai na Ndako.

96 Nkolo Yesu, Motambuisi ya likalo yango, Mokumbi oyoapambolami ya masuwa ya kala ya Siona, masuwa ya Bomoi,azali kotambola kati na ndako oyo, koloba, Bozali na Ye ezaliawa. Molimo Mosantu mpenza oyo asekwisaki Ye na nkundaazali awa.97 Lokola bakabolaki bakálati ya mabondeli te, bato oyo bautina bingumba mosusu bazali awa, baoyo ngai nayebi te, bayeiawa mpo tóbondela mpo na bango? Bótombola maboko, baoyongai nayebi te. Bótombola maboko, baoyo nayebi te. Yo, yokuna. Nakanisi elenge mobali oyo azali na mustáshe na simakuna, moto moko atombolaki loboko na sima, na ngámbo oyo.Iyo, yo, otombolaki loboko? Malamu. Kuna na sima, yo, misie.Malamu. Bino nyonso nayebi bino te? Nkolo Yesu wana, azali peMobateli bibwele yango awa, bondimi ete bilaka na Ye ezali solo?Apakolaka lingomba na Ye, pe “Misala oyo nazali kosala, bino pebokosala yango. Bokosala ata ya minene koleka oyo, mpo Nazalikokende na Tata naNgai.Mingi koleka oyo!” Bondimi yango?98 Otombolaki lobokompo na kotalisa ete oyebi ngai te? OndimieteNzambe akoki koyebisa ngai eloko oyo ezali namotema na yo,Akoki koloba na ngai ndenge Alobaki na mwasi oyo asimbakielamba na Ye? Ondimi ete Azali Nganganzambe Mokonzi oyoakoki kokabola bampasi na biso? Soki Nzambe asepeli komonisangai mpasi na yo, okondima ete nazali mosakoli na Ye, okondimaete Bozali na Ye ezali Awa pe yango wana Apesi yango nzela?

Page 21: LIN59-0628M Lingomba Lipengwisami, Na Mokili VGRdownload.branham.org/pdf/LIN/LIN59-0628M A Deceived Church By Th… · Ezalinini?Ebongiseli.Yangondeesaliyango.Kokakola! 48 Pelelobalongolibatonyonsooyobateyakanaba-balabala

LINGOMBA LIPENGWISAMI, NA MOKILI 97

Ozali kobondela mpo na mwasi na yo. Loketo na ye ebúkáná,mokwa ya loketo elongwá na esika na yango. Ya solo. Soki ezaliya solo, telema.Malamu, kende kokuta yemalamu. Amen.99 Bongo yo kuna na sima, elenge mobali oyo atelemaki, oyoazalaki na mustáshe? Ondimi na motema na yo mobimba?Ondimi ete Nzambe akoki koyebisa ngai bampasi na yo? Ondimiete mwana na yo ya mobali akobika? Ondimi yango? Ozali namwana mobali, azali na paralizé ya bongó. Ya solo. Ofandakate…Outi na Kentucky. Soki ezali ya solo, tombola loboko.Nayebi yo te, boye te? Soki ngai…Tombola maboko boye,toyebani te. Ya solo. Tiela Nzambe motema. Ondimi? Lokolaondimi, kuta mwana na yo ndenge ondimi. Mitiá bobele namotema na yo.100 Banani yango batombolaki maboko awa, ete nayebi te—nayebi te…Ezalaki yo? Malamu, misie, ondimi ete nazalimosakoli ya Nzambe? [Mobali yango alobi: “Amen.”—N.D.E.]Ondimi, na motema na yo mobimba? Otindami komata awate, telema bobele wana. Malamu, misie, maladi na yo, ozali nadiabéte. [“Ya solo.”] Pe ezali kosala yo mpasi na lokolo. [“Iyo.”]Outi na Ohio. [“Iyo.”] Nkombo na yo Mr. Miller. [“Ya solo.”]Zonga na ndako pe bikisama. Malamu, ndima na motema na yomobimba. Malamu.

Ondimi na…Ndimá yango. Soki okoki kondima!101 Mwasi oyo afandi awa, otombolaki loboko? Mwasi oyo yamonene, alati manéti, ondimi na motema na yo mobimba?Ondimi na…Ondimi ete nazali mosali ya Nzambe? Ondimi?Malamu, soki Nzambe akoki koyebisa ngai maladi na yo,okondima? Maladi ya motema. Malamu, tombola loboko sokiezali ya solo. Malamu.102 Mwasi oyo afandi pembeni na yo, atelemaki. Motema; kasiezali mpenza miso na yo. Nayebi ye. Malamu, soki okokikondima!103 Kuna na sima, mobali oyo alandi kuna na sima, ye pe azalina maladi ya motema, pe maladi ya loposo. Ondimi ete Nzambeakobikisa yo? Ondimi, misie?104 Mobali moko na esika moko kuna na sima, atombolakimaboko na ye ete ayebi te…Mr. Schubert. Malamu, misie.Malamu, ondimi? Ezali pe mpo na miso na yo, boye te? Ozalikobondela mpo na mama na yo oyo afandi pe wana. Soki ezaliya solo, tombola loboko. Toyebani te. Ezali ya solo? Bópesanambote, bópesana mbote ya loboko. Malamu, ezali ya solo. Sokibokoki kondima, bokoki kozua!105 Yesu Klisto oyo asékwá azali awa. Ye Azali ndenge moko.Ezali kosala bino nini? Bopesa nzela na mokili ébimisa makasina bino nyonso? Nkembo! Nazali na mposa ya mbotama ya sika!Nazali namposa yaBomoi ya sika! Ata Ekoya na lolenge nini, ata

Page 22: LIN59-0628M Lingomba Lipengwisami, Na Mokili VGRdownload.branham.org/pdf/LIN/LIN59-0628M A Deceived Church By Th… · Ezalinini?Ebongiseli.Yangondeesaliyango.Kokakola! 48 Pelelobalongolibatonyonsooyobateyakanaba-balabala

98 LILOBA LILOBAMI

nasengeli kotúntuka, to nini. Ata Ekoya na lolenge nini, nazalinde na mposa ya Molimo Mosantu ya solo lokola oyo ezali likolona ngai sikawa. Nazali na mposa ya kobatela Yango! Malamunázala na Yango na esika ya biloko nyonso ya mokili. Amen!Bondimi? Bondimi ete Azali awa?106 Na bongo, bótia maboko bamoko likolo na bamosusu.Boyebisa ngai likambo mosusu oyo Akokaki kosala. Ata mokote. Bózala na kondima sikawa. Bóndima ete esili.107 Nkolo Nzambe, Mokeli ya Likolo pe na nse, Mobandisi yaBomoi ya Seko, pe Mopesi makabo nyonso ya kitoko, Molimo naYo ezali awa, epakweli mpenza ya makasi, Nkolo, ekómi lokolandako ezali kopema, kokende ngámbo na ngámbo. Mpo na ninibato bakoki kososola yango te, Nkolo? Ba—basangani mingi namokili, bakómi mpenza malili, na milulu pe bakaúká, na lolengeete bakoki lisusu koyeba Yo te? Nkolo Nzambe, tika ete Nguyaoyo ébeta moto nyonso, pe mobeli nyonso ábika, mosumukinyonso ábikisama, pe Nzambe ázua nkembo. Na nzela na YesuKlisto, Mwana naNzambe, nasengi yango. Amen.108 Bondimi yango? Bótombolamaboko. Boyambi lobiko na binoya nzoto? Nzambe ápambola bino. Sikawa bókende pe bókutamakambo bobele ndenge bondimi, ekozala ndenge wana. Nazalikomona mamono mpo na bato mosusu. Ya solo. Nasengeli koyalisusu na mpokwa.109 Soki bondimi sikawa te, bokondima na bino lisusu te. Yasolo. Yesu asalaki yango mbala moko mpamba, pe balobaki:“Yo nde…Toyebi ete ntango Masiya akoya, Akoyebisa bisomakambo oyo.” Mwasi wana alobaki: “Nayebi ete Masiya motoakosala yango. Kasi Yo nde Nani?”

Alobaki: “Ezali nde Ngai.”110 Bongo akendeki mbangu na engumba pe alobaki: “BoyakotalaMobali Oyo ayebaki oyo ngai nazalaki pe oyo nasálá. AzaliMasiya te?”111 Alobaki: “Makambo yango ekomonana lisusu na ntango yasuka. Lingomba ekoteya Solo, Ekotelema na Liloba. EkosalelaMibeko nyonso yaNzambe. Ekosangana namokili te. Pe na nzelana yangoNgai nakosala pe nakosalamakambo yangomoko.”112 Kasi Alobaki: “Bakozala na motó makasi, lolendo,bakolinga bisengo koleka Nzambe, bazangi boboto, bakokoselabato makambo, bakozala lokola basantu,” basambeliminene, bakendaka losambo. “Bakozala lokola basantu, kasibakowangana Nguya na yango. Zalá mosika na bato ya ndengewana!”113 Bino, ata ozalaki wapi kati na losambo, baoyo Auti kolobelasikawa, mamono etiki ngai. Soki—soki ezalaki solo, makambonalobaki, pe soki nayebaki makambo na bino te, bótombolamaboko, ézala nani. Losambo mobimba, moto nyonso—nyonso.

Page 23: LIN59-0628M Lingomba Lipengwisami, Na Mokili VGRdownload.branham.org/pdf/LIN/LIN59-0628M A Deceived Church By Th… · Ezalinini?Ebongiseli.Yangondeesaliyango.Kokakola! 48 Pelelobalongolibatonyonsooyobateyakanaba-balabala

LINGOMBA LIPENGWISAMI, NA MOKILI 99

Malamu. Bomoni? Nayebi bango te, namóná bango te; kasiMolimo Mosantu azali awa pe Ye nde ayebi bango. Bozalikomona te ete ezali ngai te?114 Boyoka! Soki Apesi ngai yango, Akopesa ngai pe Solo yaLiloba, mpo ete Solo ekoki koya bobele na nzela na Liloba.“Bobongola mitema, moko na moko, pe bóbatisama na NkombonaYesuKlisto, mpo na bolimbisi yamasumu na bino, pe bokozualikabo ya Molimo Mosantu, mpo elaka yango ezali mpo na binope mpo na bana na bino, baoyo bazali mosika, baoyo nyonsoNkolo Nzambe na biso akobenga.” Bondimi yango? Mosala yalibatisi ekosalema sima namwa ntangomoke.115 Tógumba mitó na biso. Nakosenga na mokengeli eteábondela, wana bazali komilengela mpo na libatisi. Nakanisimosala ya libatisi ezali kolanda. Malamu.

Page 24: LIN59-0628M Lingomba Lipengwisami, Na Mokili VGRdownload.branham.org/pdf/LIN/LIN59-0628M A Deceived Church By Th… · Ezalinini?Ebongiseli.Yangondeesaliyango.Kokakola! 48 Pelelobalongolibatonyonsooyobateyakanaba-balabala

Lingomba Pe Lolenge Na Yango(The Church And Its Condition)

Sanza ya mwambe 5, 1956, Mokolo ya Lomingo na Ntongo

Ekuke Ezali Moke(Strait Is The Gate)

Sanza ya misato 1, 1959, Mokolo ya Lomingo na Ntongo

Lingomba Lipengwisami, Na Mokili(A Deceived Church, By The World)

Sanza ya motoba 28, 1959, Mokolo ya Lomingo na Ntongo

Mateya oyo ya Ndeko William Marrion Branham, eteyamaki na Ngelesana Branham Tabernacle ya Jeffersonville, Indiana, U.S.A., ezuamaki uta naba-bandes magnetiques pe etiamaki na buku na Ngelesa. Kolimbolama naLingala oyo etiami na buku pe ekabolami na Voice of God Recordings.

LINGALA

©2015 VGR, ALL RIGHTS RESERVED

VOICE OF GOD RECORDINGS

P.O. BOX 950, JEFFERSONVILLE, INDIANA 47131 U.S.A.www.branham.org

Page 25: LIN59-0628M Lingomba Lipengwisami, Na Mokili VGRdownload.branham.org/pdf/LIN/LIN59-0628M A Deceived Church By Th… · Ezalinini?Ebongiseli.Yangondeesaliyango.Kokakola! 48 Pelelobalongolibatonyonsooyobateyakanaba-balabala

Liyebisi ya makoki ya mokolo-eloko

Makoki nyonso ekopesama na ndingisa. Búku oyo, ekoki kozala imprimé na masíni ya ndako mpo na yo moko to kokabama, ofelé, lokola esalelo mpo na kopalanganisa Nsango Malamu ya Yesu Klisto. Búku oyo ekoki kotekama te, koyíkanisama te, kotiama na site internet te, kobombama mpo na kolukaluka te, kolimbolama na nkota mosusu te, to kosalela yango mpo na kosenga misolo te, kozanga ndingisa ekomami mpenza na Voice Of God Recordings®.

Soki olingi koyeba makambo mosusu to kozua bisalelo mosusu, komélá:

Voice of God RecoRdinGsP.o. Box 950, JeffeRsonVille, indiana 47131 U.s.a.

www.branham.org