mpona nini bopesi nzela na mobeko oyo ya bolongoli bwa zemi na moto ezali malamu te mpona nzoto kolo

4
Mpona nini bopesi nzela na mobeko oyo ya bolongoli bwa zemi na moto ezali malamu te mpona nzoto kolongono ya mwana mwasi? Momekano na maloba mpona kozuwa nzela ya bolongoli bwa zemi na mobimba na yango mokolo mobimba Boangi monene bwa nzoto kolongonu ya mokili mobimba (OMS) koloba ete ezali na bolongoli bwa zemi nkese (million) 42 mokili mobimba na mbula moko, mpe nkese 20 oyo ezali ya kobatama to kozanga kozuwa nzela na mobeko na mboka. Kolandana na boangi monene bwa nzoto kolongonu ya mokili mobimba (OMS), bolongoli bwa zemi bwa kozanga libateli pene na 65.000 kino 70.000 liwa ya basi mpona kobota na mbula moko, 1 mokama na mayoko 99 ya moko kozuwa esika kati na mboka oyo esili kokende liboso. 2 Kotala mituya oyo (oyo ezali na mituna ebele mpe ya kozanga kondimisama 3 ), lisanga ya bato songolo kotatola ete kolongola mobeko ya kopekisa to kotelemela bolongoli bwa zemi ekobatela ebele na basi na liwa to kozuwa likama oyo ekouta na bolongoli bwa zemi bwa kozala nzela na mobeko na mboka mpe oyo ezali mabe. Bopesi nzela bwa bolongoli bwa zemi na mobeko namboka mpe lisungi ya mosala ya kotia molongo kati na libota na oyo etali kobota (plan familial) ekitisi liwa ya bolongoli bwa zemi, oyo Mayangani ya mokili mobimba mpona kotia molongo kati na libota (Federation Internationale pour le Plan Familial). 4 Kasi suka na oyo ezali kokesana na litatoli oyo ezali. Bozangi bwa mosala na monganga ya ekeke oyo mpe libateli na nzoto kolongonu ya lolenge na likolo, lipekisi ya bolongoli bwa zemi te, kouta na mbotana na liwa ya basi mpona kobota. Kopesa nzela na bolongoli bwa zemi kokela momesano—kati na mokili oyo na nzela ya bokei liboso, epai wapi lisungi ya nzoto kolongonu ya basin a kobota ezali moke mingi, mokili oyo kobaki mituya ya liwa na basi kokufa to kozala na likama na nzela ya bolongoli bwa zemi.

Upload: will-poehler

Post on 02-Apr-2016

230 views

Category:

Documents


2 download

DESCRIPTION

 

TRANSCRIPT

Page 1: Mpona nini bopesi nzela na mobeko oyo ya bolongoli bwa zemi na moto ezali malamu te mpona nzoto kolo

Mpona nini bopesi nzela na mobeko oyo ya bolongoli bwa zemi na moto ezali malamu te mpona nzoto kolongono ya mwana mwasi?

Momekano na maloba mpona kozuwa nzela ya bolongoli bwa zemi na mobimba na yango mokolo mobimba

Boangi monene bwa nzoto kolongonu ya mokili mobimba (OMS) koloba ete ezali na bolongoli bwa zemi nkese (million) 42 mokili mobimba na mbula moko, mpe nkese 20 oyo ezali ya kobatama to kozanga kozuwa nzela na mobeko na mboka. Kolandana na boangi monene bwa nzoto kolongonu ya mokili mobimba (OMS), bolongoli bwa zemi bwa kozanga libateli pene na 65.000 kino 70.000 liwa ya basi mpona kobota na mbula moko,1 mokama na mayoko 99 ya moko kozuwa esika kati na mboka oyo esili kokende liboso.2

Kotala mituya oyo (oyo ezali na mituna ebele mpe ya kozanga kondimisama3), lisanga ya bato songolo kotatola ete kolongola mobeko ya kopekisa to kotelemela bolongoli bwa zemi ekobatela ebele na basi na liwa to kozuwa likama oyo ekouta na bolongoli bwa zemi bwa kozala nzela na mobeko na mboka mpe oyo ezali mabe. Bopesi nzela bwa bolongoli bwa zemi na mobeko namboka mpe lisungi ya mosala ya kotia molongo kati na libota na oyo etali kobota (plan familial) ekitisi liwa ya bolongoli bwa zemi, oyo Mayangani ya mokili mobimba mpona kotia molongo kati na libota (Federation Internationale pour le Plan Familial).4

Kasi suka na oyo ezali kokesana na litatoli oyo ezali.Bozangi bwa mosala na monganga ya ekeke oyo mpe libateli na nzoto kolongonu ya lolenge na likolo, lipekisi ya bolongoli bwa zemi te, kouta na mbotana na liwa ya basi mpona kobota. Kopesa nzela na bolongoli bwa zemi kokela momesano—kati na mokili oyo na nzela ya bokei liboso, epai wapi lisungi ya nzoto kolongonu ya basin a kobota ezali moke mingi, mokili oyo kobaki mituya ya liwa na basi kokufa to kozala na likama na nzela ya bolongoli bwa zemi.

Page 2: Mpona nini bopesi nzela na mobeko oyo ya bolongoli bwa zemi na moto ezali malamu te mpona nzoto kolo

Mikakatano ya liwa na basi mpona kobotaLolenge ya kobota ya basi, bolongoli bwa zemi kozala na kati to mo-susu, kozala na ntina na 1.9 moyoka na mokama ya liwa mokili mo-bimba mpona basi mpe bana basi.5 Liwa na basi mpona kobota kotika likambo ya motuya mingi kati na mboka oyo ezali na bokei liboso.

Na kati na makambo ebele, na oyo etali libateli bwa nzoto kolon-gonu mpe libateli ya nzoto kolongonu na liboso na mwasi kobota ezali kozanga. Mingi mingi kozanga mosungi na ntango ya ko-bota, lisungi ya monganga ezali koselema lolenge esengeli te to kozanga, bandako ya boyambi bato na zemi mpona lisungi na monganga kozanga to ezali kokokisa bosenga na yango te, bado-kotolo kozanga boyebi bwa mosala na bango mpo bazangi boyebi to bibobolo ya kosalela mpona kosilisa likambo yango ya koban-gisa, mpe kisi mpe bisaleli ya mosala na monganga lokola banti-biotike (Antibiotiques) mpe bagani ya kolambema (gants stelisés) kozanga to ezali na esika te. Oyo kozala likama oyo ezali mpona basi na zemi soki zemi kosuka na kobota to na bolongoli bwa yango.

Eyano: Libateli malamuEbele na liwa ya kobota na basi ekoki kopekisama na nzela ya bilei malamu ya mwasi na ntango ya kobota, lisungi ya moboku ya nzoto kolongonu, mpe lisungi malamu ya kimonganga mpona kobota mpe sima na kobota.

Na mokili oyo ezali nabokei liboso, mbotama ya liwa na basi mpona kobota bana kokita ekotambola elongo “na bokei liboso bwa mosala to lisungi na monganga ya bibobolo mpe kotombola ezaleli mobimba ya nzoto kolongonu ya basi” (Kouta na 1935 kino 1950), kolandana na Boangi monene ya nzoto kolongonu ya mokili mobimba (OMS).6 Eloko oyo kosalema liboso na bopalangani bwa mobeko bwa bolongoli zemi.

Na mboka Amelika (USA), bolongoli bwa zemi kozala moke na libateli liboso ya kopesamela nzela na mobeko na mboka na 1973 (Elilingi 1 na 2). Bk. Mary Calderone, Mokonji ya kala ya kimonganga mpona bobali bwa kobota malamu (plan familial), kosukisa kati na mbula 1960 ete “bolongoli bwa zemi, to na lisungi ya kimonganag to ya kozanga lisungi malamu ya kimonganga, mingi mingi kozala lisusu na likama te, mpo ete ekosalema malamu na minganga.”7

Dk. Bernard Nathanson, mokambi na kala ya bolongoli bwa zemi mpe moko na babandeli ya NARAL, kokoma na mbula 1979 ete

Fig. 2Fig. 1

bokaboli bwa maloba ete basi bakoki kokufa kouta na bolongoli mabe to bolongoli bwa zemi ya kozanga kopesamela nzela kati na mboka Amelika (USA) ezali kozanga makoki “mpo ete bantibiotike (antibiotiques) mpe makambo mosusu ya kimonganga kokitisa mingi mbotama na liwa ya bolongoli bwa zemi.”8

Kati namboka na Angleterre mpe Ecosse, mbotana ya liwa na basi mpona kobota kokita kouta an likolo mosika na 550 (liwa na basi mpona kobota mpona mbotama ya bato 100.000) kati na 1931 kokita nanse ya 50 na mbula ya 1960. Etamboleli kokita na esaleli ya kisi ya bantibiotike (antibiotiques), kotia makila kati na nzoto na moto, mpe lisungi ya zemi oyo ezali na mobulu.”9

Kolandana na mayebisi ya Banki ya mikili mpona bokei liboso (le rapport de developpement de la Banque Mondiale) mpona 2006, Malaysia na Sri Lanka bakitisisaki mingi mbotana na liwa ya basi mpona kobota na nzela ya kotangisa ebele ya basi ya kosunga kobotisa bamosusu mpe bokambi bwa minganga ya basi ya kobotisa bamosusu kozala na bisika ya mboka mpe kopesa lisungi ya kisi na ntango yonso mpe bibobolo na mosala, na komatisa lolenge ya koyokisana (Communication ameliorée), bomemi biloko (transport) mpe lisungi ya misala yonso. Na Sri Lanka mbotana ya liwa na basi mpona kobota, mituya na kobotama na bana 100.000—kokita uta 2.136 na mbula ya 1930 kino 24 na 1996. Na Malaysia ekweyaki na kouta na 1.088 nambula 1933 kino 19 na 1997.10

Dk. Neelam Dhingra ya Boangi monene ya nzoto kolongonu ya mokili mobimba (OMS) kotatola ete bosopani bwa makila ebele kosala ete kino liwa ya 44% liwa na basi ympona kobota na mokili na Afrika, epai wapi eokoki nakopekisama na nzela ya kopesamela makila malamu. 11 Lisungi ya kimonganga na sika mpe lisungi bwa nzoto kolongono malamu kozala fongola mpona libateli ya bomoi mpe nzoto kolongono ya basi.

Bopesi nzela bwa bolongoli bwa zemi elingi koloba te kimia na bolongoli bwa zemiLibanda mayebisi na Bosangani ya mokili mobimba bwa mwango ya kobota malamu (Federation des parents pour le plan familial) mpe masanga mosusu oyo ekolobela bopesi nzela bwa bolongoli bwa zemi, ezali na mayangami moko te kotalisa kati na mobeko na bolongoli bwa zemi na mbotana na liwa ya basi mpona kobota mwana. Kopesa nzela bolongoli bwa zemi ezali kosunga eloko te na ntina na lisungi na monganga oyo ezali na nse mingi kati na mboka oyo ezali na bokei liboso.

0

200

400

600

800

1000

1200

1400

1600

1940

1944

1948

1952

1956

1960

1964

1968

1972

1976

1980

1984

1988

1992

1996

2000

2004

Liwa ya bolongoli bwa zemi na mboka USA—1940-2004

Source: U.S. Center for Health Statistics and the U.S. Centers for Disease Control

Maternal mortality rateby year: United States 1915–2004

Fall coincided with medicaladvancements includingpenicillin, antibotics andblood transfusions

Source: U.S. Centers for Disease Control and Prevention

1915 1920 1925 1930 1935 1940 1945 1950 1955 1960 1965 1970 1975 1980 1985 1990 1995 2000 2004

per 100,000 live births

0

100

200

300

400

500

600

700

800

900

Bokiti bwa mbotano kouta na bokei liboso bwa kisi lokola penicelline, antibio-tiques na botie makila na nzoto na moto.

Bopesi nzela bwa bolongoli bwa zemi na mboka Amelika (USA) na mbula ya 1973 kopesa makasi moke na mbotano ya liwa ya basi na kobota.

Source: U.S. Centers for Disease Control and Prevention

Mbotano ya basi na kobota na mboka Amelika (USA) 1915-2004

Mpona mbotama 100.000

Page 3: Mpona nini bopesi nzela na mobeko oyo ya bolongoli bwa zemi na moto ezali malamu te mpona nzoto kolo

Kolandana na Eteni na Boangi na Mokili Mobimba mpona Bato (PND), ezalaki na kokita ya solo te na liwa ya basi mpona kobota to liwa ya mwana uta na 1994. Lisanga na Mokili mobimba ya bato mpe Bokei liboso kati na CAIRE mpe na mayangami na minei ya Mokili mobimba mpona basin a Beijing.12 Eloko oyo kozala solo ata soki, ata na ngonga wana, ebele na basi kozala na nzela na bolongoli bwa zemi bwa kopesamela nzela na mobeko liboso.

Ndakisa na Russia, Amelika, Irlande mpe Pologne kolakisa ete mboka na mobeko bwa bolongoli bwa zemi bwa makasi kozala na mbotana na nse ya liwa na basi ya kobota koleka ata bamboka oyo bakopesa nzela ya bolongoli bwa zemi. Mayebisi na elilingi 3 ezali kouta na Mayebisi na Liwa na Mokili mobimba ya 2005, kobimisa na Mwango na mosala na mokili mobimba mpona bokei liboso na mboka (PND).13

Kati namboka ya India bolongolo bwa zemi ezali kozuwa esika na mobeko namboka, kasi liwa na basi mpona kobota ezali ebele na ntina na lolenge ya mabe ya lisungi na kisi. Mpona ntina na oyo etali mobeko na bolongoli bwa zemi: Botali bwa yonso lisusu na Mwango na mosala na mokili mobimba mpona bokei liboso na mboka (PND). “Ata bakotika mobeko na bolongoli bwa zemi kosala mosala, bolongoli bwa zemi bwa malamu te kobakisa mbotana na lisungi ya liwa na basin a mboka India (570 liwa mpona kobota kati na baboti 100.000 na mbula 1990).”14

Na koloba mbotana na liwa na kobota na mboka Paraguay ezali na nse mingi, ata kozala lipekisi ya ebele na bolongoli bwa zemi mpe na ndenge ete bolongoli bwa zemi bwa kobombana ezali na momesano. Mbotana solo esili na kokita na nse mingi—“kouta na liwa 300 na kobotana 100.000 nambula 1986 mingi ya sika na 1995 likanisi ya mbula matari na liwa 190 na kobotana 100.000.”15

Litatoli kolakisa ete mbotana na liwa na basi na mboka ezali kolandana mingi na lolenge ya lisungi na monganga koleka ata bopesi nzela bwa bolongoli bwa zemi. Mitungisi ya bolongoli bwa zemi ezali te mosala na samba na molongo, kasi lisungi ya kisi mpe monganga epai wapi bolongoli bwa zemi etikali kosalema.

Bopesi nzela bwa bolongoli zemi kokela momesanoBopesi nzela bwa bolongoli bwa zemi ekoki kopesa nzela na mosala yango kozala na mpasi, kasi ezali na eloko moko ya mobulu: bopesa nzela bwa bolongoli bwa zemi kobakisa mituya ya bolongoli bwa zemi. Na mboka Amelika (USA), mituya na bolongoli bwa zermi komata kouta na mituya ya likanisi (nombres éstimés) 98.000 na mbula kino na likolo ya nkese (million) 1.6 liboso ya bopesi nzela bwa bolongoli bwa zemi. Stanley Henshaw ya Kelasi ya Guttmacher (mobundeli ya bopesi nzela bwa bolongoli bwa zemi), “Kati na bamboka ebele, ezali na momesano sima na bolongoli bwa zemi kopesamela nzela ete mbotana na bolongoli bwa zemi komata makasi mpona bambula ebele, sima kotelema esika moko, kaka ndenge tomoni mponamboka Amelika (USA).”17

Na mboka Afrika ya Sude, ndakisa, mituya na bolongoli bwa zemi komata kouta na mituya na likanisi (nombres éstimés) 1.600 na mbula 1996, mbula liboso na bolongoli bwa zemi kopesamela nzela, uta na

85.621 na mbula 2005.18 Na lolenge mosusu, na ntango oyo mboka Pologne kopekisa ebele na bolongoli bwa zemi kokitisa mbongo na mbulamatari ya bolongoli bwa zemi, litatoli koloba ete mituya yonso ya bolongoli bwa zemi (na ndenge ya malamu mpe kobombana) kokita na lolenge ya kokanisa te.19

Ezali malamu mingi kosukisa ete bomati bwa mituya bwa bolongoli bwa zemi oyo ekoya sima na bopesi nzela bwa bolongoli bwa zemi, mituya (soki mbotana te) ya bolongoli bwa zemi oyo ekotala liwa ya basi mpona kobota ekoki kobakisama, kasi kokita te.

Likama mabe mpona bopesi nzela bwa bolongoli bwa zemiNa mokili ya makoki na liboso, likama ya bopesi nzela bwa bolongoli bwa zemi

kokita na nse. Jeanne E. Head, R.N, U.N. (Boangi ya mokili mobimba) Mokonji (Representative) mpona lisanga na ekolo na ntina na bonkolo na bomoi, azali koloba: “Basi yonso na likama mpo ete bazali na bozangi bwa makoki ya kokuta na Dokotolo, lopitalo to bakisi ya antibiotike liboso ya bopesi nzela bwa bolongoli bwa zemi kokuta na ngonga moko sima na bopesi nzela bwa bolongoli bwa zemi.

Mpe soki bopesi nzela bwa bolongoli bwa zemi kosepela na bato ebele, lokola ezalaki mpona mikili mosusu, ebele na basi oyo basili kowelisa na bozangi bwa kisi.”20

Ata na mboka na Amelika, mokambi na mokili na kisi na boluki luki na sika, pene na basi 400 koyebana kokufa kouta na bolongoli bwa zemi bwa mobeko na mboka kopesa nzela kouta na nzela ya mboka kosila na kopesamela nzela na mbula 1973.21

Bolongoli bwa zemi ezali na libateli te. Kati na mboka

na bokei bwa liboso mpe kozanga kisi to lisungi oyo esengeli mponabasi na kobota mpe zebi ya lisungi na nzoto na moto, komatisa kati na bolongoli bwa zemi komema na nzela ya bopesi bwa nzela oyo ekobakisa kaka liwa ya basi na kobota te, kasi ekobengana eyano kati na bomoi mpe nzoto kolongonu kati na basi mpe bilenge basi.

Mobeko oyo ekotelemela bolongoli bwa zemi ezali malamu mpona libateli kaka te bana oyo babotami te, kasi bamama na bango lokola. Basi bazali na bosenga bwa libateli mpe lisungi, bolongoli bwa zemi te.

Likambo na bosemboBosembo esengi ete mobeko kobatela lokumu mpe bonkolo mot yonso ya libota, kotia na kati bana oyo babotami te na bamama na bango. Ma bongisami na “Liwa na basi mpona kobota” mpona kopesa bolongoli bwa zemi ezui esika te—bolongoli bwa zemi bwa bopesi nzela na mobeko na mboka ekokamba kaka na ebele na bolongoli bwa zemi,

Ndenge nini okoki kokitisa liwa na basi mpona kobota?Bokabwani kati na mama na liki, to na nzela ya kobota to na bolongoli bwa zemi, ezali na likama mingi namboka ya bokei liboso koleka ata mboka oyo ezali liboso mpona ntina na lisungi ya nzoto kolongonu oyo ezali na nse mingi mpona basi – mingi mingi bozangi bwa kisi ya antibiotike (antibiotiques), kisi ya kopekisa makila kobima, mpe bandako malamu.

Esengeli na biso kosalela makoki na biso kopesa lolenge yonso lisungi na nzoto kolongonu oyo esengeli mpona basi mpe bilenge basi, na esika ya kopesa nzela ya bolongoli bwa zemi mpe mwango mwa bokebi mwa bato.

Esengeli na biso kobunda mpona kopesa basi ya mboka na bokei liboso lolenge moko ya lisungi ya esika moko na basi ya mboka na makoki yonso mpo na mituya – lisungi oyo euti eyano na nzoto kolongonu mpona mama mpe mwana.

Fig. 3

0

10

20

30

40

50

60

70

Russia USA Ireland Poland

Maternal Mortality Rates

Abortion legal Abortion illegal

Per 100,000 births

Source: UN World Mortality Report, 2005

Mbotano ya liwa ya basi na kobota

Irlande Pologne

Mpona mbotama 100.000

Bolongoli bwa zemi bwa nzela to bwa mobeko

Bolongoli bwa zemi bwa mobeko te

Source: UN World Mortality Report, 2005

Page 4: Mpona nini bopesi nzela na mobeko oyo ya bolongoli bwa zemi na moto ezali malamu te mpona nzoto kolo

mpe eyano na yango, ebele na bolongoli bwa kotinda mikakatano kati na nzoto na basi. Lisungi malamu ya kisi, bolongoli bwa zemi te, ezali

eyano epai na likambo ya liwa na basi mpona kobota kati an mokili oyo ezali kokende liboso.

Mikanda na Boangi na mokili yonso kososola bonkolo bwa mwana oyo abotami te“Mwana, mpona ntina na kozanga kokola na nzoto mpe na makanisi, libateli ya momesano te kozala na bosenga epai na ye mpe lisungi, kotia na kati libateli ya mobeko bwa mboka, liboso mpe sima na kobotama.” Maloba na bonkolo ya mwana.

“Bososoli bwa lokumu mpe bonkolo ndenge moko mpe kozanga mbongwana ya libota yonso na bato ezali moboku na bonsomi, bosembo mpe kimia kati na mokili.” Maloba ya mokili mobimba mpona bonkolo nabato.

Bililingi 1. Bokutani bwa ntuku mitano na sambo bwa Nzoto kolongonu, Mayebisi

bwa baton a Sekeletele likolo ya Mbotama na Nzoto kolongonu, A54/13 (15 Avril 2004).

2. Boangi bwa Nzot kolongonu bwa Mokili Mobimba, Bolongoli bwa Zemi bwa kozanga libateli: Makanisi ya mokili mobimba mpe eteni songolo ya mokili oyo ekotala mabe na bolongoli bwa zemi bwa kozanga lisungi mpe Liwa mosusu na mbula 2003, ya 5e ed. (Geneve: Boangi bwa mokili mobimba bwa nzoto kolongonu, 2007).

3. Kati na mbula 2007 mayebisi ya Bolongoli bwa Zemi bwa oyo ekozanga lisungi, Boangi bwa mokili mobimba mpona nzoto kolongonu kondima, “Epai wapi makasi ya bolongoli bwa zemi kopekisama mpe mosika kozala na makoki te, to ya bopesameli nzela kasi makasi mpona kozuwa, mayebisi moke kopesamela likolo na mosala ya bolongoli bwa zemi. Na lolenge wana, ezali makasi kopesa mituya mpe kokabola bolongoli bwa zemi. Mayebisi nini oyo ezali na esika kasi kozanga kotia kondima.” Boangi bwa mokili mobimba bwa bato Eteni oyo ebengami na mituya ya likanisi “moke maloba kobanda mituya ya nmayebisi ya makasi kozanga mpona na eteni molai ya mikili.” Boangi bwa mokili mobimba, Bato na Mokili kotala 2002 (New York: Boangi bwa Mokili mobimba, 2004) Kotekama na No.E.02.XIII.14. Jeanne E. Head, R.N., kosukisa, “Moke na mayebisi kosala momekano kozala solo ya nkombo na bolongoli bwa zemi mpe mobeko na bolongoli bwa zemi na mokili na mikakatano, mosala na makasi. Mituya ya makanisi ya Boangi bwa nzoto kolongolu bwa mokili mobimba oyo OMS kotongama na mitango ya makanisi, oyo ekofanda likolo ya mayebis ya moke mpe ya bobola na makanisi.” Jeanne E. Head na Laura Hussey, “Bolongoli bwa zemi kozala nanzela ya Libateli bwa Nzoto kolongono ya Basi?” Mokili e-j, sanza ya motoba (Juin) 2004, 52-57.

4. “Bolongoli bwa zemi”Mayangani bwa mokili mobimba mpona mwango na kobota malamu, <http://www ippf.org/en/What-we-do/Abortion/default.htm> (20 Avril 2009).

5. Boangi bwa mokili bwa nzoto kolongonu, Mayebisi ya Nzoto kolongonu ya Mokili mobimba 2002 (Geneva: Boangi bwa Mokili mobimba bwa nzoto kolongonu, 2002).

6. Boangi bwa Mokili mobimba bwa nzoto kolongonu, Liwa ya basi mpona kobota: Mokanda na mokili mobimba (Geneva: Boangi bwa Mokili mobimba bwa nzoto kolongonu; 1991).

7. Mary S. Calderone, “Bolongoli bwa zemi bwa kozanga kopesamela nzela lokla likambo kati na nzoto kolongonu na bato,” Mokanda na kotanga ya Baton a Amelika ya nzoto kolongonu na bato 50 (Juillet 1960); 949.

8. Bernard N. Nathanson na Richard N. Ostling, bolongoli bwa zemi bwa Amelika (New York: Doubleday, 1979), 194.

9. Boangi bwa Mokili mobimba bwa nzoto kolongonu, Liwa ya basi mpona kobota: Mokanda na mokili mobimba.

10. Banki na Mokili mobimba, Mayebisi ya bokei liboso bwa Mokili 2006 (Juillet 2004).

11. U.S. Mokonji Smith (NJ), “Bokitisi bwa Liwa ya Basi mpona kobota namboka mpe libanda,” Makomi na Mayangani 154: 82 (19 Mai 2008), H4125.

12. Boangi bwa mboka mokili mobimba, Mayebisi ya Liwa na Mokili 2005 (New York: Boangi bwa mboka mokili mobimba 2006), Kotekama (Sales) No. E.06.XIII.3.

13. Ibid. 14. Boangi bwa mboka mokili mobimba, Mobeko na Bolongoli bwa zemi:

Makanisi ya Mokili mobimba (New York: Boangi bwa mboka mokili mobimba, 2002) Kotekama (Sales) No. E.01.XIII.18, 56-58.

15. Boangi bwa mboka mokili mobimba, Mobeko na Bolongoli bwa zemi:Makanisi ya Mokili mobimba (New York: Boangi bwa mboka mokili mobimba, 2002) Kotekama (Sales) No. E.02.XIII.5, 29-31.

16. Lisanga na boluluki bwa zebi na mbula 1981 kosalela lolenge ya kotia elikya na likanisi na mituya 98.000 bwa bolongoli bwa zemi oyo ezali libanda na mobeko na mboka mbula yonso kati na mbula 32 liboso bwa bopesi nzela bwa mobeko bwa bolongoli zemi. Barbara J. Syska, Thomas W. Hilgers, M.D., mpe Dennis O’ Hare, “Lolenge ya kokanisa Bolongoli bwa zemi lokola koboma mpe makokisani na yango mpona mobeko na bato,” kati na makanisi ya sika ya bolongoli bwa zemi bwa bato, ed. Thomas W. Hilgers, M.D., Dennis J. Horan mpe David Mall (Frederick, Md.: University Publications of Amelika, 1981).

17. Stanley Henshaw, Guttmacher Institute (16 Juin 1994), Presse release. 18. Wm. Robert Johnston, “Mayebisi ya mikolo eleka ya bolongoli bwa

zemi, Africa ya Sudi,” Johnston’s Archive, 26 Ocobre 2008, <http://www.johnstonsarchive.net/policy/abortion/ab-southafrica.html> (22 Avril 2009).

19. Wm. Robert Johnston, “Mayebi ya mituya likolo na bolongoli bwa zemi kokita na mboka Pologne,” Johnston’s Archive; 26 Mai 2008 <http://www.johnstonsarchive.net/policy/abortion/polandlaw.html> (22 Avril 2009).

20. Jeanne E. Head mpe Laura Hussey, 56. 21. Bandako ya bolukiluki bwa bokambi bwa bokono mpe Kobatela,

“Bolongoli bwa zemi kotia bokebi—Amelika (USA), 2005,” Bokono mpe Liwa Mayebi na mposo yonso 57, no. SS-13 (28 Novembre 2008).

MCCLGO!GLOBAL OUTREACH

Minnesota Citizens Concerned for Life Global Outreach4249 Nicollet Avenue | Minneapolis MN 55409 USA

612.825.6831 | Fax [email protected] | www.mccl-go.org | www.mccl.org

National Right to Life Educational Trust Fund211 East 43rd Street, Suite 905 | New York, NY 10017 USA

212.947.2692 | Fax [email protected] | www.nrlc.org

National Right to Life Educational Trust Fund is an international pro-life NGO.

Produced in the United States of America© 2011 MCCL

This publication also available in Swahili, Luganda, English, French, Spanish, Arabic, and Romanian.

Download at www.mccl-go.org or request copies for purchase at [email protected].

Photo: Bread for the World

Africa Life Youth FoundationP.O. Box 10489

Kampala, UgandaEast-Africa

Tel: +256-718-587596 [email protected]

www.africalyf.com